Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 18:8 - Mokanda na Bomoi

8 Azwaki mafuta ya ngombe, miliki mpe mosuni oyo alambaki, mpe atiaki yango liboso na bango. Abrayami atelemaki pembeni na bango, na se ya nzete, wana bazalaki kolia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 18:8
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe Abrayami apotaki mbangu na lopango ya bibwele, azwaki mwana ngombe ya mafuta mpe apesaki yango na mosali na ye mpo ete alamba yango noki-noki.


Sima, batunaki ye : — Wapi Sara, mwasi na yo ? Abrayami azongisaki : — Azali na ndako.


Kasi Loti abondelaki bango mingi ; boye bandimaki kokende na ye elongo mpe bakotaki na ndako na ye. Alambelaki bango bilei ya kitoko, atumbaki mapa ezanga levire mpe baliaki.


Na tango wana, baponaki mibali mpe bapesaki bango mokumba ya kobatela bibombelo ya makabo, ya bambuma ya liboso mpe ya biteni ya zomi ; bapesaki bango mpe mokumba ya kokongola biloko oyo Mobeko ekataki ete ezali mpo na Banganga-Nzambe mpe Balevi, biloko yango esengeli kowuta na bilanga oyo ezingeli bingumba. Solo, bato ya Yuda bazalaki kosepela makasi komona ete Banganga-Nzambe mpe Balevi bazongeli penza mosala na bango,


Mwana yango akomela kaka miliki mpe mafuta ya nzoyi kino tango akoyeba koboya mabe mpe kopona bolamu.


Lokola bibwele wana ekopesaka miliki ebele, akolia manteka ; mpe bato nyonso oyo bakotikala na mokili bakolia mafuta ya nzoyi.


Esengo na basali oyo nkolo, tango akoya, akokuta bazali kosenzela ! Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo mpe akolata elamba na ye ya mosala, akovandisa bango na mesa, mpe akoya kopesa bango bilei.


Boni, akoloba na ye te : « Lambela ngai bilei, lata bilamba na yo ya mosala mpo na kotiela ngai biloko na mesa, kino nasilisa kolia mpe komela ; sima na yango nde yo mpe okoki kolia mpe komela ? »


Tango avandaki na mesa elongo na bango, akamataki lipa, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango na biteni, mpe apesaki bango yango.


Azwaki yango mpe aliaki yango na miso na bango.


Kuna, balambaki bilei mpo na Yesu ; mpe wana Marte azalaki kobongisa mesa, Lazare azalaki moko kati na bato oyo bavandaki na mesa elongo na Yesu.


Amonanaki na bato nyonso te, kasi na batatoli oyo Nzambe apona wuta kala, na biso oyo toliaki mpe tomelaki elongo na Ye, sima na Ye kosekwa kati na bakufi.


Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino.


miliki ya bangombe mpe ya bameme ; apesaki bango mafuta ya bameme mpe ya bantaba, ya bana meme mpe ya ntaba ya mafuta ; mpe apesaki bameme ya mibali ya kitoko ya Bashani. Baliaki lisusu ble oyo eleki kitoko, bamelaki vino ya motane oyo ewutaki na bambuma ya vino.


Tala Ngai oyo, natelemi na ekuke mpe nazali kobeta. Soki moto moko ayoki mongongo na Ngai mpe afungoli ekuke, nakokota epai na ye mpe nakolia elongo na ye, mpe ye elongo na Ngai.


Manoa alobaki na Anjelu na Yawe : — Soki okoki kozela mwa moke, wana tozali kobongisela yo mwana ntaba.


Sisera asengaki mayi, kasi ye apesaki miliki ; kati na kopo ya bato ya lokumu, apesaki ye miliki ya kilo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ