Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 18:5 - Mokanda na Bomoi

5 Tika ete namemela bino mwa eloko ya kolia mpo ete bozwa lisusu makasi na nzoto ; bongo bokokoba mobembo na bino, pamba te ezali mpo na yango nde boleki epai na ngai mosali na bino. Bazongisaki : — Ezali malamu, sala ndenge olobi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 18:5
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami akotaki na lombangu na ndako na ye ya kapo mpe alobaki na Sara : « Kamata katini misato ya farine mpe sala bagato na lombangu. »


Boyoka ! Nazali na bana basi mibale oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. Tika ete namemela bino bango libanda ! Bosala bango nyonso oyo bolingi. Kasi bosala bato oyo eloko moko te mpo ete bayei kovanda na ndako na ngai.


Jakobi alobaki : — Nabondeli yo : soki nazwi ngolu na miso na yo, ndima kozwa biloko oyo lokola kado kowuta na maboko na ngai ; pamba te ndenge namoni yo, ezali lokola namoni Nzambe, mpo ete oyambi ngai na boboto.


Tango mwasi yango azalaki kokende kozwa mayi, Eliya ayebisaki ye lisusu : — Nabondeli yo, memela ngai mpe lipa.


vino mpo na kosepelisa mitema na bango, mafuta mpo na kongengisa bilongi na bango, mpe mapa mpo na kolendisa mitema na bango.


Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akomi pene ya kobotola masungi nyonso, kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda : lisungi ya bilei mpe lisungi ya mayi ;


Pesa biso, na mokolo ya lelo, bilei na biso ya mokolo na mokolo ;


Manoa alobaki na Anjelu na Yawe : — Soki okoki kozela mwa moke, wana tozali kobongisela yo mwana ntaba.


Anjelu na Nzambe azongiselaki Manoa : — Ata ozelisi ngai, nakolia ata eloko na yo moko te ; kasi soki obongisi mbeka ya kotumba, bonzela yango nde Yawe. Manoa asosolaki te ete oyo azali liboso na ye azali Anjelu na Yawe.


Na mokolo ya minei, balamukaki na tongo-tongo, mpe Molevi abongamaki mpo na kokende. Kasi tata ya mwana mwasi alobaki na bokilo na ye : « Lia mwa eloko mpo ete ozwa makasi ; bongo sima, okoki na yo kokende. »


Nabondeli Yo, kolongwa na esika oyo te kino nakozonga awa na likabo na ngai mpo ete nabonza yango liboso na Yo. Yawe alobaki : — Nakozela kino okozonga.


Jedeon azongaki epai na ye, abongisaki mwana ntaba, azwaki kilo tuku misato ya farine, asalaki na yango mapa oyo ezanga levire, atiaki mapa yango na kitunga, mpe atiaki elubu na nzungu. Amemaki yango mpe apesaki nyonso epai na Anjelu na Nzambe, oyo azalaki na se ya terebente.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ