Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 18:4 - Mokanda na Bomoi

4 Tika ete namemela bino mwa mayi mpo ete bokoka kosukola makolo mpe bopema na se ya nzete oyo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 18:4
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki : — Nabondeli bino, bankolo na ngai, soki nazwi ngolu na miso bino, boleka mosali na bino te.


Alobaki na bango : — Nabondeli bino, bankolo na ngai, boya na ndako ya mosali na bino. Bokoki kosukola kuna makolo na bino mpe kolekisa butu, bongo na tongo, bokoki kokoba mobembo na bino. Bazongiselaki ye : — Te, tokolala kaka libanda.


Boye mosali ya Abrayami akotaki na ndako ya Labani, mpe bakitisaki biloko oyo ezalaki na likolo ya bashamo. Bamemaki bashamo na ye na esika oyo ezalaki na matiti mpe bilei ya banyama. Bamemaki mpe mayi mpo na ye mpe mpo na bato oyo bazalaki elongo na ye mpo ete basukola makolo.


Moto yango akotisaki bango na ndako ya Jozefi, apesaki bango mayi ya kosukola makolo mpe abongisaki bilei mpo na ba-ane na bango.


Bongo abalukaki epai ya mwasi, mpe alobaki na Simona : — Omoni mwasi oyo ? Tango nakotaki na ndako na yo, opesaki Ngai mayi te ya kosukola makolo na Ngai ; kasi ye, apolisi yango na mpinzoli na ye mpe apangusi yango na nzela ya suki na ye.


kozala mwasi oyo akenda sango mpo na misala na ye ya malamu : abokolaki bana na ye malamu, azalaki koyamba malamu bapaya kati na ndako na ye, kosukola makolo ya basantu, kosunga bato na mawa mpe komipesa na misala nyonso ya malamu.


Akotisaki bango na ndako na ye mpe apesaki ba-ane na ye matiti. Sima, basukolaki makolo, baliaki mpe bamelaki.


Abigayili agumbamaki elongi kino na mabele mpe alobaki : — Mwasi mosali na yo, ye oyo ! Abongami mpo na kosalela bino mpe mpo na kosukola makolo ya basali ya nkolo na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ