Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 18:32 - Mokanda na Bomoi

32 Bongo Abrayami alobaki : — Tika ete Nkolo na ngai asilika te, pamba te nazali koloba mpo na mbala ya suka : Bongo soki bato ya sembo bazali kaka zomi ? Azongisaki : — Mpo na bato ya sembo zomi, nakobebisa engumba te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 18:32
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Abrayami alobaki : — Tika ete Nkolo na ngai asilika te soki nakobi koloba : Bongo soki bato ya sembo bazali kaka tuku misato ? Azongisaki : — Soki nakuti bato ya sembo tuku misato, nakobebisa yango te.


Abrayami alobaki : —Awa nameki kosolola na Nkolo, boni, okosala nini soki bato ya sembo bazali kaka tuku mibale ? Azongisaki : — Mpo na bato ya sembo tuku mibale, nakobebisa engumba te.


Yuda apusanaki pembeni na ye mpe alobaki : — Nabondeli yo, nkolo na ngai ! Tika ete mosali na yo aloba liloba moko epai ya nkolo na ngai. Kosilikela mosali na yo te, pamba te ndenge Faraon azali, ndenge wana mpe yo ozali.


Nzokande, soki ekoki kozala ata na anjelu moko, kati na ba-anjelu nkoto moko, mpo na koyebisa na moto makambo oyo ezali sembo,


Nkolo, ozali malamu, olimbisaka, otonda na bolingo mpo na bato nyonso oyo babelelaka Yo.


Mpe Yawe asalaki lisusu te mabe oyo akanaki kosala bato na Ye.


Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi libondeli ya moto ya sembo esepelisaka Ye.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Ndenge kaka balobaka soki bamoni liboke ya bambuma kitoko ya vino : ‹ Kobebisa te, pamba te lipamboli moko ezali wana, › ndenge mpe kaka nakosala mpo na basali na Ngai : nakoboma bango nyonso te.


« Bokende, botambola na babalabala ya Yelusalemi, botala zingazinga mpe bososola malamu penza, boluka ata na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; soki bokoki komona ata moto moko oyo atambolaka na bosembo mpe alukaka boyengebene, wana nakolimbisa engumba oyo.


Nzambe nini akokani na Yo, Yo oyo olimbisaka masumu ya bato mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo ? Okangelaka bato kanda mpo na libela te, kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.


Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino ;


Epai na Ye oyo azali na makoki ya kosala koleka nyonso oyo tokoki kosenga to kokanisa, kolanda nguya na Ye, oyo esalaka kati na biso,


Boye, Jedeon ayebisaki Nzambe : « Kosilikela ngai te, pesa ngai nzela ete nasenga lisusu elembo moko. Ya mbala oyo, sala ete bapwale ezala ya kokawuka, kasi mabele epola na mamwe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ