Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 18:31 - Mokanda na Bomoi

31 Abrayami alobaki : —Awa nameki kosolola na Nkolo, boni, okosala nini soki bato ya sembo bazali kaka tuku mibale ? Azongisaki : — Mpo na bato ya sembo tuku mibale, nakobebisa engumba te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 18:31
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami alobaki lisusu : — Solo, nazali na ngai moto pamba mpe putulu, kasi limbisa ete nameka kosolola na Nkolo na ngai.


Bongo Abrayami alobaki : — Tika ete Nkolo na ngai asilika te soki nakobi koloba : Bongo soki bato ya sembo bazali kaka tuku misato ? Azongisaki : — Soki nakuti bato ya sembo tuku misato, nakobebisa yango te.


Bongo Abrayami alobaki : — Tika ete Nkolo na ngai asilika te, pamba te nazali koloba mpo na mbala ya suka : Bongo soki bato ya sembo bazali kaka zomi ? Azongisaki : — Mpo na bato ya sembo zomi, nakobebisa engumba te.


Soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata na bino oyo azali na Likolo apesa te biloko ya kitoko epai ya bato oyo basengaka Ye yango ?


Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino ;


Nazali koloba na bino penza ya solo : ata soki akotelema te mpo na kopesa ye mapa yango, kasi akotelema penza mpo na motungisi na ye mpe akopesa ye nyonso oyo azali na yango na bosenga, pamba te azali moninga na ye.


Yesu alobaki na bayekoli na Ye lisese moko mpo na kolakisa bango ete basengeli kosambelaka tango nyonso, na kolemba te.


Mpe bosambelaka tango nyonso na bokambami ya Molimo, na nzela ya lolenge nyonso ya mabondeli mpe ya bisengeli. Mpo na yango, bosenzelaka mpe bomikabaka mobimba mpo na kobondelaka mpo na basantu nyonso.


Boye, topusana na elikya nyonso pene ya Kiti ya Bokonzi ya ngolu mpo ete Nzambe ayokela biso mawa mpe tozwa ngolu, oyo ekosunga biso na tango oyo ekoki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ