Tango Abrayami atombolaki miso, amonaki mibali misato pene na ye. Mpe tango kaka amonaki bango, atelemaki wuta na ndako na ye ya kapo mpe akendeki mbangu mpo na kokutana na bango ; bongo agumbamaki kino na mabele.
Apesaki bango malako oyo : « Tala makambo oyo bokoloba epai ya nkolo na ngai Ezawu : ‹ Mosali na yo Jakobi alobi : ‘ Navandaki epai ya Labani mpe natikalaki kuna kino sik’oyo.
Jozefi azwaki ngolu na miso ya nkolo na ye, oyo apesaki ye mokumba ya kobatela bozwi na ye nyonso : Potifari akomisaki Jozefi mokonzi kati na ndako na ye mpe apesaki ye mokumba ya kobatela biloko na ye nyonso.
Nabondeli Yo, kolongwa na esika oyo te kino nakozonga awa na likabo na ngai mpo ete nabonza yango liboso na Yo. Yawe alobaki : — Nakozela kino okozonga.
Jedeon azongaki epai na ye, abongisaki mwana ntaba, azwaki kilo tuku misato ya farine, asalaki na yango mapa oyo ezanga levire, atiaki mapa yango na kitunga, mpe atiaki elubu na nzungu. Amemaki yango mpe apesaki nyonso epai na Anjelu na Nzambe, oyo azalaki na se ya terebente.
Anjelu na Nzambe alobaki na ye : — Kamata nyama mpe mapa oyo ezanga levire, tia yango na likolo ya libanga oyo mpe sopela yango elubu. Jedeon asalaki yango.