Nalukaki ata moto moko kati na bango, oyo akokaki kotonga mir mpe kotelema liboso na Ngai, na lidusu ya mir mpo na bolamu ya mokili mpo ete nakoka kobebisa yango te, kasi namonaki ata moto moko te.
Oh Isalaele, ata bato na yo bazali ebele lokola zelo ya ebale monene, ndambo kaka nde bakozonga ; pamba te Nzambe azwi mokano ya kobebisa bato, akomema bosembo lokola mpela.
Soki ndambo moko kati na bandambo zomi ya bato ekotikala na mokili, bakobebisama na moto. Kasi ndenge terebente mpe nzete oyo babengaka sheni etikaka misisa na yango soki bakati yango, ndenge wana mpe nkona ya bule ekotika misisa na mokili.