Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 18:22 - Mokanda na Bomoi

22 Mibali yango babalukaki mpe bakendeki na Sodome, kasi Abrayami atelemaki kaka liboso ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 18:22
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mibali yango batelemaki mpo na kokoba mobembo na bango na Sodome, Abrayami akendeki kotika bango na nzela.


Yawe amilobelaki : « Boni, nakoki solo kobombela Abrayami likambo oyo nalingi kosala ?


Ba-anjelu oyo mibale bakomaki na Sodome na pokwa. Wana Loti avandaki na ekuke, amonaki bango, akendeki koyamba bango mpe afukamaki elongi kino na mabele.


Na tongo makasi, Abrayami amataki na esika oyo atelemaki liboso ya Yawe ;


Azwaki mokano ya koboma bango nyonso. Kasi Moyize, moponami na Ye, atelemaki liboso na Ye mpo na kobondela ete akitisa kanda na Ye mpe aboma te.


Yawe alobaki na ngai : « Ata soki Moyize mpe Samuele batelemi liboso na Ngai mpo na koloba na tina na bato oyo, nakotikala koyokela bato oyo mawa te. Bengana bato oyo liboso na ngai ! Tika ete bakende mosika na Ngai !


Boni, bazongisaka solo mabe na malamu ? Tala, batimoli libulu mpo na kokunda ngai ! Kanisa ndenge nini natelemaki liboso na Yo mpo na koloba na tina na bolamu na bango, mpo ete kanda na Yo ekende mosika na bango.


Nalukaki ata moto moko kati na bango, oyo akokaki kotonga mir mpe kotelema liboso na Ngai, na lidusu ya mir mpo na bolamu ya mokili mpo ete nakoka kobebisa yango te, kasi namonaki ata moto moko te.


Kasi lokola Etieni atondisamaki na Molimo Mosantu, atalaki na Likolo, amonaki nkembo ya Nzambe mpe Yesu atelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.


Boye liboso na nyonso, nazali kolendisa ete bosengaka na Nzambe, bosambelaka Ye, bobondelaka Ye mpo na bato mosusu mpe bozongiselaka Ye matondi mpo na bato nyonso,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ