Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 18:14 - Mokanda na Bomoi

14 Boni, ezali na eloko oyo Yawe akoki kolembana ? Na mobu oyo ezali koya, na tango oyo ekatama, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara akozala na mwana mobali.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 18:14
38 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakopambola ye mpe nakopesa yo penza mwana mobali na nzela na ye ; nakopambola ye mpo ete akoma mama ya bikolo. Bakonzi ya bikolo bakobima na nzela na ye. »


Kasi na oyo etali boyokani na Ngai, nakosala yango elongo na Izaki, mwana mobali oyo Sara akobotela yo na eleko oyo, na mobu oyo ezali koya.


Bongo moko kati na bango alobaki : — Solo, na mobu oyo ezali koya, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara, mwasi na yo, akozala na mwana mobali. Nzokande, Sara ayokaki maloba wana na ekotelo ya ndako ya kapo, na sima ya Abrayami.


Yawe alobaki na Abrayami : — Mpo na nini Sara aseki mpe alobi : « Nakoki solo kobota mwana awa nasili kokoma mobange ? »


Sara abangaki ; boye awanganaki : — Naseki te. Kasi Yawe alobaki : — Ezali ya solo, oseki.


Yawe atalisaki bolamu na Ye epai ya Sara ndenge kaka alobaki mpe akokisaki elaka oyo apesaki ye.


Sara azwaki zemi mpe abotelaki Abrayami mwana na kimobange na ye kaka na tango oyo Nzambe alakaki ye.


Elize alobaki : — Na mobu oyo ekoya, na eleko oyo, maboko na yo ekosimba mwana mobali. Mwasi ya Sunami agangaki : — Te, nkolo na ngai, moto na Nzambe, kopesa na ngai mwasi mosali na yo elikya ya lokuta te !


Tala monene ya Nzambe ! Kasi atiolaka na Ye bato te, nguya na Ye emonanaka na nzela ya mikano na Ye ya makasi. Azali na nguya, mpe mikano na Ye ebongwanaka te.


« Nayebi ete okoki kosala makambo nyonso ; eloko moko te ekoki kotelemela mabongisi na Yo.


Yawe, lembisa moke ! Kino tango nini ekowumela ? Yokela basali na Yo mawa !


Yawe azali kokonza, alati lokumu monene ; Yawe alati penza lokumu monene mpe amizingeli na nguya. Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te.


Pamba te Yawe azali Nzambe Monene, azali Mokonzi Monene, na likolo ya banzambe nyonso.


Mpo na nini moto azalaki te tango nayaki ? Mpo na nini moto apesaki eyano te tango nabengaki ? Loboko na Ngai ezalaki mokuse mpo na kosikola bino ? Nazangaki solo makasi mpo na kokangola bino ? Na pamela na Ngai, nakawusaka ebale monene, nakomisaka bibale esobe ; mbisi na yango ekomaka kolumba solo mpo ete mayi ezali te mpe ekufaka na posa ya mayi.


Oh Nkolo Yawe ! Yo nde osala likolo mpe mabele na nguya monene na Yo, otanda yango na makasi ya loboko na Yo : olembanaka likambo moko te.


« Nazali Yawe, Nzambe ya moto nyonso. Boni, ezali na likambo oyo Ngai nakoki kolembana ?


Na tongo-tongo, mokonzi atelemaki mpe akendeki na lombangu na libulu ya bankosi.


Nzambe nini akokani na Yo, Yo oyo olimbisaka masumu ya bato mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo ? Okangelaka bato kanda mpo na libela te, kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boni, soki, na tango wana, ekomonana lokola likambo ya kokamwa na miso ya batikali kati na bato oyo, Ngai mpe namona yango likambo ya kokamwa ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Yawe alobaki na Moyize : — Boni, loboko na Yawe ezali solo mokuse ? Okomona sik’oyo soki maloba oyo nalobi ekokokisama to ekokokisama te mpo na yo.


Mbala moko, Yesu asembolaki loboko epai na ye, asimbaki ye mpe alobaki na ye : — Moto na kondima moke, mpo na nini otie tembe ?


Wana Yesu atalaki bango, alobaki : — Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema !


Bokanisa kutu te komilobela na se ya mitema : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.


Yesu atalaki bango mpe alobaki : — Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, ekosalema penza ; pamba te nyonso ekoki kosalema na Nzambe.


Kasi anjelu alobaki na ye : — Zakari, kobanga te ! Nzambe ayoki mabondeli na yo. Mwasi na yo, Elizabeti, akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye kombo « Yoane. »


Zakari atunaki anjelu : — Ndenge nini nakoki koyeba ete ezali ya solo ? Pamba te, ngai, nazali mobange, mpe mibu ya mbotama ya mwasi na ngai esili kopusana makasi.


Lokola Yesu ayokaki ye koloba bongo, alobaki na Jairisi : — Kobanga te ! Ndima kaka, mpe akobika na bokono na ye.


wana andimisamaki makasi ete Nzambe azali na makoki ya kokokisa elaka na Ye.


Epai na Ye oyo azali na makoki ya kosala koleka nyonso oyo tokoki kosenga to kokanisa, kolanda nguya na Ye, oyo esalaka kati na biso,


Yawe, Nzambe na yo, akoyokela yo mawa : akozongisa bato na yo, oyo bakendeki na bowumbu mpe akosangisa bino lisusu wuta na bikolo nyonso epai wapi apanzaki bino.


Kolenga te liboso na bango, pamba te Yawe, Nzambe na yo, oyo azali kati na yo, azali Nzambe Monene mpe ya somo.


Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye.


Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.


Abrayami azalaki na elikya ete Nzambe azali na makoki ya kosekwisa Izaki longwa na bakufi, yango wana Nzambe azongiselaki ye mwana na ye : yango ezalaki kaka elilingi.


Anjelu na Yawe abimelaki mwasi ya Manoa mpe alobaki : « Tala, ozali ekomba mpe ozali na bana te, kasi okokoma na zemi mpe okobota mwana mobali.


Jonatan alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : — Yaka ! Tokende na molako ya bato oyo bakatama ngenga te. Tango mosusu Yawe akosala mpo na biso, pamba te eloko moko te ekoki kopekisa Yawe kobikisa, ezala na nzela ya bato ebele to ya bato moke.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ