13 Yawe alobaki na Abrayami : — Mpo na nini Sara aseki mpe alobi : « Nakoki solo kobota mwana awa nasili kokoma mobange ? »
Sara asekaki mpe amilobelaki : « Awa nasili konuna boye, nakoki lisusu koyoka posa ya mobali ? Kutu nkolo na ngai akomi mpe mobange ! »
Boni, ezali na eloko oyo Yawe akoki kolembana ? Na mobu oyo ezali koya, na tango oyo ekatama, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara akozala na mwana mobali.
Sara alobaki : « Nzambe apesi ngai libaku ya koseka ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango oyo akoseka elongo na ngai. »
Abakisaki : « Nani akokaki koloba na Abrayami ete Sara akomelisa bana mabele ? Pamba te naboteli ye mwana na kimobange na ye. »
Azalaki ata na posa te ete bayebisa Ye makambo na tina na bato, pamba te ayebaki makambo nyonso oyo ezalaki kati na mitema na bango.