12 Sara asekaki mpe amilobelaki : « Awa nasili konuna boye, nakoki lisusu koyoka posa ya mobali ? Kutu nkolo na ngai akomi mpe mobange ! »
Abrayami afukamaki elongi kino na mabele, asekaki mpe amilobelaki : « Eh ! Mobali oyo azali na mibu nkama moko ya mbotama akoki lisusu kobota mwana ! Bongo Sara, mwasi oyo azali na mibu tuku libwa ya mbotama, akoki penza kokumba zemi ! »
Yawe alobaki na Abrayami : — Mpo na nini Sara aseki mpe alobi : « Nakoki solo kobota mwana awa nasili kokoma mobange ? »
Elize alobaki : — Na mobu oyo ekoya, na eleko oyo, maboko na yo ekosimba mwana mobali. Mwasi ya Sunami agangaki : — Te, nkolo na ngai, moto na Nzambe, kopesa na ngai mwasi mosali na yo elikya ya lokuta te !
Boye, tozalaki koganga mpe koyemba na esengo. Bongo, maloba oyo ekomaki kolobama kati na bikolo : « Yawe asaleli bango makambo minene ! »
Mwana na ngai ya mwasi, tala mpe yoka ; bosana bato na yo mpe ndako ya tata na yo.
Atako bongo, mobali nyonso kati na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka, mpe mwasi nyonso asengeli kotosa mobali na ye.
lokola Sara oyo atosaki Abrayami kino kobenga ye « nkolo na ngai. » Bozali bana basi ya Sara soki bosali bolamu mpe bopesi nzela te na bobangi.
Tango tongo ezali kotana, mwasi azongaki na ndako epai wapi mobali na ye azalaki, akweyaki na ekuke mpe alelaki wana kino tongo etanaki malamu.