Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 18:11 - Mokanda na Bomoi

11 Abrayami mpe Sara bazalaki mibange, mpo ete bakomaki na mibu ebele penza mpe Sara azalaki lisusu na makoki te ya kobota.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 18:11
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami afukamaki elongi kino na mabele, asekaki mpe amilobelaki : « Eh ! Mobali oyo azali na mibu nkama moko ya mbotama akoki lisusu kobota mwana ! Bongo Sara, mwasi oyo azali na mibu tuku libwa ya mbotama, akoki penza kokumba zemi ! »


Abrayami azalaki na mibu tuku libwa na libwa ya mbotama tango akatamaki ngenga ;


Abakisaki : « Nani akokaki koloba na Abrayami ete Sara akomelisa bana mabele ? Pamba te naboteli ye mwana na kimobange na ye. »


Abrayami akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki. Yawe apambolaki ye na makambo nyonso.


Sara, mwasi ya nkolo na ngai, na kimobange na ye, abotelaki nkolo na ngai mwana mobali, mpe nkolo na ngai apesaki biloko na ye nyonso epai ya mwana yango.


Rasheli alobaki na tata na ye : — Tika ete nkolo na ngai asilika te soki nakoki kotelema te na miso na yo, pamba te nazali na mikolo ya sanza oyo ekomelaka basi nyonso. Labani alukaki, kasi amonaki banzambe yango te.


Soki mwasi amoni makila na ye ya sanza, akozala mbindo mikolo sambo, mpe moto nyonso oyo akosimba ye akozala mbindo kino na pokwa.


Zakari atunaki anjelu : — Ndenge nini nakoki koyeba ete ezali ya solo ? Pamba te, ngai, nazali mobange, mpe mibu ya mbotama ya mwasi na ngai esili kopusana makasi.


Ndeko na yo ya mwasi, Elizabeti, azali mpe na zemi ; akobota mwana mobali, atako akomi mobange. Ye oyo bazalaki kobenga « ekomba » akomi sik’oyo na zemi ya sanza motoba.


Kasi bazalaki na mwana te, pamba te Elizabeti azalaki ekomba ; mpe bango mibale bakomaki mibange.


Abrayami azalaki na elikya ete Nzambe azali na makoki ya kosekwisa Izaki longwa na bakufi, yango wana Nzambe azongiselaki ye mwana na ye : yango ezalaki kaka elilingi.


Tango Jozue akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki makasi, Yawe alobaki na ye : « Okomi mpe mobange makasi, mibu ya bomoi na yo esili kopusana mingi. Kasi mokili oyo bosengeli kobotola ezali nanu monene.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ