9 Nzambe alobaki lisusu na Abrayami : « Kasi mpo na yo, osengeli kobatela boyokani na Ngai, yo elongo na bakitani na yo sima na yo mpo na milongo oyo ekoya sima.
Kaka na mokolo wana, Abrayami azwaki mwana na ye ya mobali, Isimaeli, mpe bawumbu nyonso, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mosolo, akatisaki bango nyonso ngenga ndenge kaka Nzambe alobaki na ye.
Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo ; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. »