Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 17:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bakobenga yo lisusu Abrami te ; kombo na yo ekokoma Abrayami, pamba te nakokomisa yo tata ya bikolo ebele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 17:5
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe alobaki lisusu na Abrayami : « Mpo na Sarayi, mwasi na yo, okobenga ye lisusu te Sarayi, kasi okokoma kobenga ye Sara.


Moto yango atunaki Jakobi : — Kombo na yo nani ? Jakobi azongisaki : — Kombo na ngai ezali Jakobi.


Moto yango alobaki lisusu : — Kobanda lelo, kombo na yo ekozala lisusu Jakobi te, kasi Isalaele, pamba te obundi na Nzambe mpe na bato, bongo olongi.


Nzambe alobaki na ye : « Kombo na yo ezali Jakobi ; kasi okobengama lisusu Jakobi te, kombo na yo ekomi Isalaele. » Yango wana Nzambe apesaki ye kombo « Isalaele. »


mpe atindaki maloba na nzela ya mosakoli Natan ete bapesa ye kombo « Yedidia, » pamba te Yawe alingaki ye.


Ezali Yo, Yawe Nzambe, nde oponaki Abrami mpe obimisaki ye longwa na Uri, mokili ya Chalide, mpe opesaki ye kombo Abrayami.


Bokotika kombo na bino epai ya baponami na Ngai lokola lisuma ; Nkolo Yawe akoboma bino ; kasi epai ya baponami na Ye, akopesa kombo mosusu.


Mokolo oyo elandaki, tango Pashuri alongolaki ye na likonzi, Jeremi alobaki na ye : — Yawe akobenga yo lisusu Pashuri te, kasi Magori-Misabibe.


Na eleko ya mokonzi wana, mokili ya Yuda ekobikisama, mpe mokili ya Isalaele ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela ye : Yawe azali Bosembo na biso.


Oyo nde bakombo ya bato oyo Moyize atindaki mpo na kononga mokili ya Kanana. Moyize apesaki Oze, mwana mobali ya Nuni, kombo « Jozue. »


Bongo amemaki Simona epai ya Yesu. Yesu atalaki Simona mpe alobaki : « Ozali Simona, mwana mobali ya Yoane ; kasi bakobanda kobenga yo Sefasi. »


kolanda ndenge ekomama : « Nakomisaki yo tata ya bikolo ebele. » Azali tata na biso na miso ya Nzambe oyo ye andimaki, Nzambe oyo apesaka bomoi epai ya bakufi mpe azalisaka biloko oyo etikala kozala te.


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye mana oyo ebombama ; nakopesa ye lisusu libanga moko ya pembe oyo bakoma kombo moko ya sika na likolo na yango, kombo oyo eyebani kaka na moto oyo akozwa yango. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ