19 Nzambe alobaki : — Te ! Mwasi na yo, Sara, akobotela yo mwana mobali, mpe okobenga ye « Izaki. » Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela elongo na ye mpe bakitani na ye sima na ye.
Nakopambola ye mpe nakopesa yo penza mwana mobali na nzela na ye ; nakopambola ye mpo ete akoma mama ya bikolo. Bakonzi ya bikolo bakobima na nzela na ye. »
Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela na libela kati na Ngai mpe yo, mpe elongo na bakitani na yo sima na yo, mpo na milongo oyo ekoya na sima, mpo ete nazala Nzambe na yo mpe Nzambe ya bakitani na yo sima na yo.
Vanda kati na mokili oyo ; nakozala na yo elongo mpe nakopambola yo, pamba te nakopesa mabele oyo nyonso epai na yo mpe epai ya bana na yo ; nakokokisa ndayi oyo nalapaki epai ya Abrayami, tata na yo.
Tango nyonso monama ekobima na mapata, nakomona yango mpe nakokanisa boyokani ya seko kati na Nzambe mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili. »
Mpo na kondima, Sara mpe azwaki makoki ya komema zemi atako mibu na ye ya kobota esilaki koleka wuta kala, pamba te andimaki ete Ye oyo apesaki ye elaka akosaka te.