Balobaki na bango : — Tokoki kosala likambo ya boye te, tokoki te kopesa na libala ndeko na biso ya mwasi epai ya mobali oyo akatama ngenga te, pamba te ezali likambo ya soni mpo na biso.
Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire. Na mokolo ya liboso, bokolongola levire na bandako na bino ; pamba te moto nyonso oyo akolia eloko oyo ezali na levire, kobanda na mokolo ya liboso kino na mokolo ya sambo, bakolongola ye kati na bato ya Isalaele.
Mikolo sambo, levire esengeli te komonana kati na bandako na bino ; pamba te moto nyonso oyo akolia eloko oyo ezali na levire, esengeli balongola ye na lisanga ya Isalaele, azala mopaya to mwana mboka ya Isalaele.
Nzela ya minene esili kokawuka, ata moto moko te ya mobembo azali koleka. Mobebisi abuki boyokani, asambwisi bingumba mpe azali na botosi ya moto ata moko te.
Bazongeli kosala masumu ya bakoko na bango, oyo baboyaki koyoka maloba na Ngai. Bazali kolanda banzambe mosusu mpo na kosalela yango. Libota ya Yuda mpe libota ya Isalaele babebisi boyokani oyo nasalaki elongo na bakoko na bango.
ekozala ndenge moko te na boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango tango nasimbaki bango na loboko mpo na kobimisa bango na Ejipito ; pamba te bakataki boyokani na Ngai wana, atako nazalaki Mobali ya libala mpo na bango, » elobi Yawe.
Wana bozalaki kobonzela Ngai bilei, mafuta mpe makila ya banyama, bokotisaki kati na Esika na Ngai ya bule bapaya oyo batosaka Ngai te mpe bakatama ngenga te, mpo na kobebisa bosantu ya Tempelo na Ngai ; na bongo, bobebisaki boyokani na Ngai mpo na kokokisa misala na bino nyonso ya mbindo !
Moto nyonso oyo akolia yango, akomema mokumba ya mabe na ye mpo ete asambwisi eloko oyo ezali bule mpo na Yawe, mpe basengeli kobengana ye kati na bato na ye.
Kasi soki moto moko asepeli feti ya Pasika te, wana azali mbindo te mpe asali mobembo te, basengeli kolongola ye kati na libota na ye, pamba te abonzeli Yawe likabo te na tango oyo ekatama ; akomema mikumba ya masumu na ye.