Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 17:13 - Mokanda na Bomoi

13 Mowumbu nyonso oyo abotami kati na ndako na yo to oyo osombi na mosolo na yo asengeli kokatama ngenga. Boyokani na Ngai ekozala kati na banzoto na bino lokola boyokani ya libela na libela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 17:13
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Abrami ayokaki ete bakangi ndeko na ye, abengisaki bato nkama misato na zomi na mwambe oyo bayebi kobunda mpe babotama na ndako na ye. Boye balandaki bango kino na Dani.


Abrami alobaki lisusu : — Opesi ngai mwana te ; yango wana mosali moko kati na ndako na ngai akozala mokitani ya libula na ngai !


Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela na libela kati na Ngai mpe yo, mpe elongo na bakitani na yo sima na yo, mpo na milongo oyo ekoya na sima, mpo ete nazala Nzambe na yo mpe Nzambe ya bakitani na yo sima na yo.


Malamu toteka ye epai ya bato ya ekolo ya Isimaeli, kasi toboma ye te ; pamba te azali kaka ndeko na biso mpe tozali na ye makila moko. » Boye bandeko na ye bandimaki.


Bato ya mokili ya Madiani batekaki Jozefi na Ejipito epai ya Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi.


Sima, bamemaki Jozefi na Ejipito. Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, moto ya Ejipito, asombaki ye na maboko ya bato ya Isimaeli oyo bamemaki ye kuna.


Tango nyonso monama ekobima na mapata, nakomona yango mpe nakokanisa boyokani ya seko kati na Nzambe mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili. »


Nzokande tozali nzoto moko mpe makila moko na bandeko na biso, mpe bana na biso bakeseni te na bana na bango ; kasi tala ndenge nini tosili kosambwa : tosengeli koteka bana na biso ya mibali mpe ya basi lokola bawumbu ; mpe bana na biso mosusu ya basi bakomi bawumbu, mpe tozangi nguya ya kosikola bango, mpo ete bilanga na biso mpe bilanga na biso ya vino ekomi ya bato mosusu !


Nalobaki na bango : — Biso, kolanda makoki na biso, tosikolaki bandeko na biso, Bayuda, oyo batekamaki epai ya bapagano. Kasi bino sik’oyo, bozali bino moko koteka bandeko na bino, mpe bozali koteka bango kaka epai ya bato ya ekolo na biso ! Bavandaki kimia mpe bazangaki liloba ya kozongisa.


Kasi mowumbu nyonso oyo bakosomba, basengeli liboso kokata ye ngenga, sima nde akoki kolia Pasika.


Moto oyo akokanga moto mosusu na makasi mpo na kokima na ye, ezala soki ateki moto yango to bakangi ye na moto yango na maboko, asengeli kozwa etumbu ya kufa.


« Soki bosombi Mo-Ebre moko lokola mowumbu, akosalela bino mibu motoba ; na mobu ya sambo, akozwa bonsomi mpe akofuta eloko moko te.


Soki nkolo na ye apesaki ye mwasi mpe mwasi yango abotelaki ye bana mibali to bana basi, mwasi mpe bana bakozala ya nkolo na ye ; mobali akokende ye moko.


Kasi soki Nganga-Nzambe asombi mowumbu na mbongo na ye to soki mowumbu abotami na ndako na ye, mowumbu wana akolia makabo ya bule.


Lokola azalaki na eloko moko te mpo na kofuta, mokonzi na ye atindaki ete bateka ye, mwasi na ye, bana na ye mpe biloko na ye nyonso mpo ete niongo na ye efutama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ