Ebandeli 17:12 - Mokanda na Bomoi12 Mpo na milongo nyonso oyo ekoya, mwana mobali nyonso kati na bino, oyo akokisi mikolo mwambe asengeli kokatama ngenga : ezala mwana mobali oyo abotami kati na ndako na yo to mwana mobali oyo osombi na mosolo na yo epai ya mopaya, mwana mobali oyo azali mokitani na yo te, ye mpe asengeli kokatama ngenga. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo Nzambe asalaki boyokani elongo na Abrayami, mpe elembo ya boyokani yango ezalaki : kokatama ngenga. Abrayami abotaki Izaki mpe akataki ye ngenga na mokolo ya mwambe ya mbotama na ye ; Izaki abotaki Jakobi mpe akataki ye ngenga, bongo Jakobi mpe abotaki bakoko na biso zomi na mibale mpe akataki bango ngenga.