Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 17:10 - Mokanda na Bomoi

10 Tala boyokani na Ngai elongo na yo mpe bakitani na yo sima na yo, boyokani oyo osengeli kobatela : Mwana mobali nyonso kati na bino asengeli kokatama ngenga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 17:10
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kokatama ngenga ekozala elembo ya boyokani kati na bino mpe Ngai.


Kaka na mokolo wana, Abrayami azwaki mwana na ye ya mobali, Isimaeli, mpe bawumbu nyonso, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mosolo, akatisaki bango nyonso ngenga ndenge kaka Nzambe alobaki na ye.


Mibali nyonso kati na ndako ya Abrayami, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mokili ya bapaya, bakatamaki ngenga elongo na ye.


Abrayami akatisaki Izaki ngenga tango akokisaki mikolo mwambe ya mbotama, ndenge Nzambe atindaki ye.


Tokoki kondima yango kaka soki bokomi lokola biso, soki bana na bino nyonso ya mibali bakatisi ngenga.


Kasi mibali bakondima kovanda elongo na biso lokola bandeko ya libota moko soki kaka mibali nyonso kati na biso bakatisi ngenga lokola bango.


Soki mopaya oyo azali kati na bino alingi kosepela na feti ya Pasika ya Yawe, esengeli ete mibali nyonso oyo bazali kati na ndako na ye bakatama ngenga ; bongo nde akozwa nzela ya kolia Pasika lokola mwana mboka ya Isalaele. Kasi mobali oyo akokatama ngenga te akoki kolia Pasika te.


Kasi Sefora azwaki libanga ya songe, akataki ngenga ya mwana na ye ya mobali mpe atutisaki ngenga yango na makolo ya Moyize ; alobaki : — Solo, ozali penza mpo na ngai mobali ya makila.


Bomibulisa mpo na Yawe, bopetola mitema na bino, bino bato ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi ; noki te kanda na Ngai ekopela mpe ekozikisa bino lokola moto mpo na mabe oyo bozali kosala ; ekopela makasi mpe moto moko te akokoka koboma yango.


Bokanisa nanu : Moyize apesaki bino mitindo ya kokatisa ngenga, —mobeko yango ewutaki kutu na Moyize te, kasi na bakoko— mpe botosaka mitindo yango ata na mokolo ya Saba.


Bongo Nzambe asalaki boyokani elongo na Abrayami, mpe elembo ya boyokani yango ezalaki : kokatama ngenga. Abrayami abotaki Izaki mpe akataki ye ngenga na mokolo ya mwambe ya mbotama na ye ; Izaki abotaki Jakobi mpe akataki ye ngenga, bongo Jakobi mpe abotaki bakoko na biso zomi na mibale mpe akataki bango ngenga.


Pamba te ezali te makambo oyo emonanaka na miso nde ekomisaka moto Moyuda, mpe ezali te elembo oyo emonanaka na nzoto nde esalaka kokatama ngenga.


Nzambe akabaki Klisto lokola mbeka mpo ete, na nzela ya kosopa makila na Ye, Klisto azwa bolimbisi masumu ya bato oyo bazali kondima. Asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye, pamba te, na tango ya kala, tango oyo akangaki motema, apesaki bato etumbu te mpo na masumu na bango.


Pamba te tososoli ete moto atangamaka lokola moto ya sembo na nzela kaka ya kondima, kasi na nzela ya kotosa Mobeko te.


Pamba te Nzambe azali kaka moko ; Ye nde akomisaka, na nzela ya kondima na bango, bato oyo bakatisa ngenga mpe bato oyo bakatisa ngenga te, bato ya sembo.


Bokeseni ezali lisusu te kati na Bayuda mpe Bagreki, kati na bawumbu mpe bansomi, kati na mibali mpe basi ; pamba te bino nyonso bozali se moto moko kati na Yesu-Klisto.


Bato oyo balingaka koyebana na miso ya bato batindaka bino na makasi kokatisa ngenga, mpo ete banyokola bango te mpo na ekulusu ya Klisto.


Yango wana, bobosanaka te ete na kala, bozalaki Bapagano kolanda mbotama na bino ; mpe bato oyo bamibengaka « bato bakatama ngenga » bazalaki kobenga bino « bato bakatama ngenga te, » atako bazalaki bato bakatama ngenga kati na banzoto na bango na nzela ya mosala ya maboko ya bato.


Bopetola mitema na bino, oyo etonda na masumu mpe botombokela lisusu Yawe te ;


Yawe, Nzambe na bino, akobulisa mitema na bino mpe mitema ya bakitani na bino mpo ete bolinga Ye na mitema mpe na milimo na bino mobimba, mpe mpo ete bozala na bomoi.


Biso nde tozali bato oyo bakatisa ngenga na solo, pamba te tosambelaka Nzambe na nzela ya Molimo na Ye, tomikumisaka kati na Yesu-Klisto mpe totiaka elikya na biso na nzoto te,


Na tango wana, Yawe alobaki na Jozue : — Sala bambeli ya mabanga mpe kata lisusu bana mibali ya Isalaele ngenga.


Tala mpo na nini Jozue asengelaki kokata bango ngenga : Mibali nyonso oyo babimaki na Ejipito mpe bakokisaki mibu ya kobunda bitumba bakufaki na nzela, kati na esobe, sima na bango kobima na Ejipito.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ