Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 16:8 - Mokanda na Bomoi

8 Atunaki ye : — Agari, mosali ya Sarayi, owuti wapi mpe ozali kokende wapi ? Azongisaki : — Nazali kokima mosika ya Sarayi, nkolo na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 16:8
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sarayi, mwasi ya Abrami, abotelaki ye mwana te. Nzokande azalaki na mosali moko ya mwasi, moto ya Ejipito ; kombo na ye « Agari. »


Abrami asangisaki nzoto na Agari, mpe Agari akomaki na zemi. Tango Agari asosolaki ete akomi na zemi, akomaki kotiola Sarayi, nkolo na ye.


Anjelu ya Yawe alobaki na ye : — Zonga epai ya nkolo na yo mpe mikitisa liboso na ye.


Nzambe ayokaki mongongo ya mwana, mpe Anjelu na Nzambe abengaki Agari wuta na likolo. Ayebisaki ye : « Agari, likambo nini ? Kobanga te, pamba te Nzambe ayoki mongongo ya mwana wuta na esika oyo otikaki ye.


Kasi Yawe Nzambe abengaki mobali mpe atunaki ye : — Ozali wapi ?


Nzambe alobaki : — Osali nini ? Likambo nini penza osali ? Makila ya ndeko na yo ezali koganga wuta na mabele kino epai na Ngai.


Tango kaka Eliya ayokaki yango, azipaki elongi na ye na songe ya kazaka na ye, abimaki mpe atelemaki na ekotelo ya lidusu ya mabanga. Mpe mongongo moko elobaki na ye lisusu : — Eliya, ozali kosala nini awa ?


Kuna, akotaki na lidusu ya mabanga mpe alekisaki butu. Yawe alobaki na ye : — Eliya, ozali kosala nini awa ?


Boye, Geazi akotaki mpe atelemaki liboso ya nkolo na ye, Elize. Elize atunaki ye : — Geazi, okendeki wapi ? Geazi azongisaki : — Mosali na yo akendeki epai moko te.


Soki mokonzi atombokeli yo, kolongwa na esika na yo ya mosala te ; pamba te motema ya kokita epekisaka bambeba minene.


Tango atombolaki miso, amonaki moto ya mobembo na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka. Mobange yango atunaki ye : — Okeyi wapi mpe owuti wapi ?


Sik’oyo, tika ete mokonzi, nkolo na ngai, ayoka maloba ya mosali na ye. Soki ezali Yawe nde atindaki yo kotelemela ngai, wana tika ete andima likabo. Kasi soki bato nde bazali kosala boye, wana tika ete balakelama mabe liboso ya Yawe ; pamba te babengani ngai lelo mpe balongoli ngai na libula ya Yawe, mpe balobi na ngai : « Kende kosalela banzambe mosusu. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ