Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 16:7 - Mokanda na Bomoi

7 Anjelu ya Yawe amonaki Agari na esobe, pene ya etima oyo ezali na nzela ya Shuri.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 16:7
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami alongwaki na mboka wana mpo na kokende na etuka ya Negevi mpe avandaki na mboka oyo ezalaki kati ya Kadeshi mpe Shuri ; sima na tango moke, akendeki kovanda na Gerari.


Nzambe ayokaki mongongo ya mwana, mpe Anjelu na Nzambe abengaki Agari wuta na likolo. Ayebisaki ye : « Agari, likambo nini ? Kobanga te, pamba te Nzambe ayoki mongongo ya mwana wuta na esika oyo otikaki ye.


Telema, tombola mwana mpe zwa ye na loboko na yo, pamba te nakokomisa ye ekolo monene. »


Nzambe afungolaki ye miso, mpe amonaki libulu ya mayi. Akendeki kotondisa mbeki mpe amelisaki mwana.


Kasi anjelu ya Yawe abengaki ye wuta na likolo : — Abrayami ! Abrayami ! Abrayami azongisaki : — Ngai oyo.


Anjelu ya Yawe abengaki Abrayami na mbala ya mibale wuta na likolo


Yawe, Nzambe ya likolo, oyo abimisaki ngai na ndako ya tata na ngai mpe na mokili epai wapi nabotama, oyo alobaki na ngai mpe alakaki ngai na nzela ya ndayi ete akopesa mokili oyo na bakitani na ngai, akotindela yo anjelu na Ye mpo ete azala liboso na yo mpe mpo ete okoka koyela mwana na ngai ya mobali mwasi ya mokili wana.


Bakitani na ye bazalaki kovanda na mokili oyo ezalaki kati na Avila mpe Shuri, pene ya Ejipito, na nzela oyo ekenda na Asiri. Bazalaki tango nyonso kovanda lokola banguna ya bandeko na bango nyonso.


Anjelu na Nzambe alobaki na ngai kati na ndoto : « Jakobi ! » Mpe ngai nazongisaki : « Ngai oyo, nazali awa. »


Moyize atambolisaki bana ya Isalaele wuta na ebale monene ya barozo mpe amemaki bango na nzela oyo ekenda na esobe ya Shuri. Batambolaki mikolo misato kati na esobe mpe bamonaki mayi te.


Kuna, Anjelu ya Yawe abimelaki ye kati na ndemo ya moto oyo ezalaki komata longwa kati na mwa nzete. Moyize amonaki nzete moke yango kopela moto, kasi ezalaki kozika te.


Miso na Yawe ezalaka bisika nyonso mpo na kotala bato mabe mpe bato ya malamu.


Saulo abundisaki bato ya Amaleki nzela mobimba, longwa na Avila kino na Shuri, na ngambo ya este ya Ejipito.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ