Sima na mibu zomi, wana Abrami avandaki na Kanana, mwasi na ye Sarayi apesaki ye Agari, mosali na ye ya mwasi, moto ya Ejipito, mpo ete azala mwasi na ye.
Boye, Sarayi alobaki na Abrami : — Ezali mpo na yo nde ngai nazali komona pasi ya boye ; napesaki mosali na ngai ya mwasi na maboko na yo. Mpe sik’oyo lokola amoni ete azali na zemi, akomi kotiola ngai. Tika ete Yawe akata likambo kati na ngai mpe yo.
Mokolo moko, kulutu alobaki na leki na ye : « Tata na biso akomi mobange, mpe na etuka oyo, mobali oyo akosangisa na biso nzoto ndenge esalemaka na mokili mobimba, azali te.
Tango Sanduku ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa ; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina liboso ya Yawe, ayinaki ye kati na motema na ye.
Bandeko, nayebisi bino makambo oyo etali ngai moko mpe oyo etali Apolosi, mpo na bolamu na bino, mpo ete, na ndakisa na biso, boyekola likambo oyo : Bolekaka mondelo te ya makambo oyo ekomama ; mpe mpo ete moko te kati na bino atonda na lolendo na kolanda moko mpe koyina mosusu.