Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 16:2 - Mokanda na Bomoi

2 Sarayi alobaki na Abrami : — Yawe apesi ngai mabota te. Kende, sangisa nzoto na mosali na ngai ya mwasi, tango mosusu nakotonga libota na nzela na ye. Abrami ayokaki maloba ya Sarayi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 16:2
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sarayi azalaki ekomba : azalaki na mwana te.


Nakopambola ye mpe nakopesa yo penza mwana mobali na nzela na ye ; nakopambola ye mpo ete akoma mama ya bikolo. Bakonzi ya bikolo bakobima na nzela na ye. »


Bongo moko kati na bango alobaki : — Solo, na mobu oyo ezali koya, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara, mwasi na yo, akozala na mwana mobali. Nzokande, Sara ayokaki maloba wana na ekotelo ya ndako ya kapo, na sima ya Abrayami.


Mokolo moko, kulutu alobaki na leki na ye : « Tata na biso akomi mobange, mpe na etuka oyo, mobali oyo akosangisa na biso nzoto ndenge esalemaka na mokili mobimba, azali te.


pamba te Yawe akangaki mabota kati na ndako mobimba ya Abimeleki likolo ya Sara, mwasi ya Abrayami.


Izaki abondelaki Yawe mpo na Rebeka, mwasi na ye, oyo azalaki ekomba. Yawe ayanolaki libondeli na ye, mpe Rebeka akomaki na zemi.


Adamu azongisaki : — Ezali mwasi oyo opesaki ngai lokola mosungi nde apesaki ngai mbuma ya nzete yango, mpe nalie yango.


Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, › mabele elakelami mabe likolo na yo. Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo.


Nzambe akaniselaki Rasheli, ayokaki kolela na ye mpe afungolaki ye mabota.


Rasheli alobaki : « Nzambe alongisi ngai, ayoki kolela na ngai mpe apesi ngai mwana mobali. » Boye apesaki ye kombo « Dani. »


Bana bazali libula kowuta na Yawe, mpe kobota bana ezali lifuti.


Soki nkolo na ye apesaki ye mwasi mpe mwasi yango abotelaki ye bana mibali to bana basi, mwasi mpe bana bakozala ya nkolo na ye ; mobali akokende ye moko.


Boye, bampaka mpe bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya engumba balobaki : — Iyo, biso moko tozali batatoli. Tika ete Yawe akomisa mwasi oyo azali koya na ndako na yo, lokola Rasheli mpe Lea, oyo batongaki elongo libota ya Isalaele. Tika ete okoma moto monene kati na Efrata mpe moto ya lokumu kati na Beteleemi !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ