14 Yango wana babengaka libulu ya mayi yango Beri Lakai-Royi. Libulu ya mayi yango ezali na kati-kati ya Kadeshi mpe Beredi.
Tango bazongaki, bakendeki na Eyini-Mishipati oyo elakisi Kadeshi mpe babotolaki mokili mobimba ya bato ya Amaleki. Balongaki mpe bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na Atsatsoni-Tamari.
Boye, Agari abotelaki Abrami mwana mobali mpe Abrami apesaki ye kombo « Isimaeli. »
Nzambe afungolaki ye miso, mpe amonaki libulu ya mayi. Akendeki kotondisa mbeki mpe amelisaki mwana.
Yango wana babengaki esika yango Beri-Sheba, pamba te na esika yango nde bango mibale balapaki ndayi.
Nzokande, Izaki azalaki kovanda na Negevi mpe awutaki na libulu ya mayi na Lakai-Royi.
Sima na kufa ya Abrayami, Nzambe apambolaki Izaki, mwana mobali ya Abrayami. Izaki azalaki kovanda pene ya Lakai-Royi.
Bayaki kokuta Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele na Kadeshi, kati na esobe ya Parani. Ezalaki kuna nde bapesaki bango elongo na lisanga mobimba sango ya mobembo na bango mpe balakisaki bango bambuma ya mokili yango.