Soki Nzambe ya tata na ngai, Nzambe ya Abrayami mpe oyo Izaki abangaka, azalaki elongo na ngai te, ya solo, olingaki kozongisa ngai lelo maboko pamba. Kasi Nzambe amonaki minyoko na ngai mpe pasi ya mosala ya maboko na ngai, yango wana apamelaki yo na butu oyo eleki.
Jakobi alobaki : — Nabondeli yo, yebisa ngai kombo na yo. Azongiselaki ye : — Mpo na nini ozali kotuna kombo na ngai ? Boye apambolaki ye na esika wana.
Bongo Jedeon atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abengaki yango « Yawe apesaka kimia. » Etumbelo yango ezali kino na mokolo ya lelo kati na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri.