12 Akozala lokola ane ya zamba. Loboko na ye ekobundisa moto nyonso, mpe loboko ya moto nyonso ekobundisa ye ; akovanda esika moko te na bandeko na ye.
Bakitani na ye bazalaki kovanda na mokili oyo ezalaki kati na Avila mpe Shuri, pene ya Ejipito, na nzela oyo ekenda na Asiri. Bazalaki tango nyonso kovanda lokola banguna ya bandeko na bango nyonso.
Okobika na nzela ya mopanga na yo mpe okosalela ndeko na yo ya mobali. Kasi tango okotambola bipai na bipai, okobuka ekangiseli oyo akotia yo na kingo.
Wana bavandaki mpo na kolia, batombolaki miso mpe bamonaki bato ya libota ya Isimaeli elongo na bashamo na bango koya wuta na Galadi. Bashamo na bango ezalaki komema na Ejipito : biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mafuta ya solo kitoko mpe mire.