Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 16:10 - Mokanda na Bomoi

10 Anjelu ya Yawe alobaki na ye lisusu : — Nakokomisa bakitani na yo ebele penza mpe moto moko te akokoka kotanga bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 16:10
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola putulu ya mabele ; bongo soki moto akoki kotanga putulu, akokoka mpe kotanga bakitani na yo.


Anjelu ya Yawe alobaki na ye : — Zonga epai ya nkolo na yo mpe mikitisa liboso na ye.


Kasi mpo na Isimaeli, nayoki yo. Solo, nakopambola ye, nakopesa ye mabota ebele mpe nakokomisa bakitani na ye ebele. Akozala tata ya bakambi zomi na mibale, mpe nakokomisa ye tata ya ekolo monene.


Nakokomisa mpe mwana mobali ya mwasi mowumbu na yo ekolo, pamba te ye mpe azali makila na yo. »


Akendeki kovanda na monkama ya bametele, pamba te alobaki : « Nalingi te komona kufa ya mwana na ngai. » Lokola avandaki mosika ya mwana, atombolaki mongongo mpe alelaki.


Telema, tombola mwana mpe zwa ye na loboko na yo, pamba te nakokomisa ye ekolo monene. »


Tango nyonso bazalaki na pasi, Ye mpe azalaki koyoka pasi na motema ; boye, anjelu oyo atelemaka liboso na Ye abikisaki bango ; asikolaki bango na bolingo mpe na mawa na Ye, akongolaki bango mpe azalaki komema bango mikolo nyonso ya tango ya kala.


« Nakotinda ntoma na Ngai ; ye nde akoya liboso mpo na kobongisela Ngai nzela. Boye Yawe oyo bozali kozela akoya na pwasa kati na Tempelo na Ye ; ntoma ya boyokani oyo bolingi akoya, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Moto moko te amona Nzambe, kasi ezali kaka Mwana se moko oyo azali Nzambe mpe azali moko na Tata nde atalisaki biso Ye.


Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela ! Amen !


Anjelu ya Yawe ayaki mpe avandaki na se ya terebente oyo ezalaki na Ofira, kati na mabele ya Joasi, moto ya libota ya Abiezeri. Jedeon, mwana mobali ya Joasi, azalaki kosangisa bambuma ya ble esika moko, na esika oyo basalaka masanga ya vino, mpo na kobomba yango liboso ya bato ya Madiani.


Yawe alobaki na ye : — Nakozala elongo na yo, mpe okoboma bato ya Madiani lokola moto moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ