9 Yawe alobaki na ye : — Memela Ngai mwana ngombe moko ya mwasi ya mibu misato, ntaba ya mwasi ya mibu misato, meme ya mobali ya mibu misato, ebenga moko ya zamba mpe ebenga moko ya mboka.
Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki meme ya mobali oyo maseke na yango ezalaki ya kokangama na nzete ya moke. Azwaki yango mpe apesaki yango mbeka ya kotumba na esika ya mwana na ye ya mobali.
Nazali kolela na se ya motema mpo na Moabi, banguna na ye bazali kokima kino na Tsoari, kino na Egilati-Shelishiya ; bazali komata na nzela ya Luyiti na kolela ; mpe na nzela ya Oronayimi, bazali kosala matanga mpo na kobebisama na bango.
Soki azali kobonza ngombe lokola mbeka ya kotumba, amema nde oyo ezangi mbeba. Bongo akobonza yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo ete Yawe andima yango.
Soki mikolo ya kopetolama na ye ekoki, ezala abotaki mwana mobali to mwana mwasi, akomema epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mwana meme ya mobu moko lokola mbeka ya kotumba mpe ebenga moko ya mboka to ebenga moko ya zamba lokola mbeka mpo na masumu.
Soki azangi makoki ya kozwa mwana meme, akoki komema bana mibale ya ebenga ya mboka to bibenga mibale ya zamba : moko mpo na mbeka ya kotumba, mpe mosusu, mpo na mbeka mpo na masumu. Sima na Nganga-Nzambe kosala mosala ya bolimbisi masumu, mwasi akokoma peto. › »
Alobaki na Aron : « Zwa mwana ngombe lokola mbeka mpo na masumu na bino mpe meme ya mobali mpo na mbeka na bino ya kotumba ; nyonso mibale esengeli kozala ezanga mbeba, mpe bonza yango liboso ya Yawe.
mpe ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali lokola mbeka ya boyokani, mpo na kobonza lokola mbeka liboso ya Yawe elongo na likabo ya bambuma basangisa na mafuta. Pamba te, na mokolo ya lelo, Yawe akobimela bino. › »