Yawe alobaki na ye : — Memela Ngai mwana ngombe moko ya mwasi ya mibu misato, ntaba ya mwasi ya mibu misato, meme ya mobali ya mibu misato, ebenga moko ya zamba mpe ebenga moko ya mboka.
Tika ete apesa na yo mpe na bakitani na yo lipamboli oyo apesaki na Abrayami mpo ete okamata mokili oyo ozali kovanda lokola mopaya, mokili oyo Nzambe apesaki na Abrayami. »
Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Nakomi pene ya kokufa. Kasi ya solo, Nzambe akosalisa bino mpe akobimisa bino na mokili oyo, mpo na kokotisa bino na mokili oyo alakaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi tango alapaki ndayi. »
nakokaba bato oyo babebisaki boyokani na Ngai mpe bakokisaki te malako ya boyokani oyo basalaki liboso na Ngai, na nzela ya kokata na biteni mibale mwana ngombe ya mobali mpe ya kotambola na kati-kati ya biteni yango.
Bakambi ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bakalaka ya lokumu, Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya mokili, oyo batambolaki na kati-kati ya biteni ya mwana ngombe ya mobali,