5 Yawe amemaki Abrami na libanda mpe alobaki na ye : — Tala na likolo mpe tanga minzoto soki okokoka kotanga yango. Alobaki na ye lisusu : — Ezali boye nde bakitani na yo bakozala.
nakopambola yo solo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo, mpe ebele lokola zelo ya ebale. Bakitani na yo bakokamata bingumba ya banguna na bango.
Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo mpe nakopesa bango mabele oyo nyonso. Boye mpo na bakitani na yo, bikolo nyonso ya mokili ekomipambola.
Bana na yo bakozala ebele lokola putulu ya mabele, bakopanzana na bangambo nyonso : wuta na weste kino na este, wuta na nor kino na sude. Mabota nyonso ya mokili ekomipambola mpo na yo mpe mpo na bakitani na yo.
Nzokande, Yo olobaki na ngai : ‹ Ya solo nakosalela yo bolamu mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola zelo ya ebale monene, oyo moto moko te akoki kotanga. › »
Davidi atangaki te molongo ya mibali oyo bazalaki na se ya mibu tuku mibale ya mbotama, pamba te Yawe alakaki ete akokomisa Isalaele ebele lokola minzoto ya likolo.
Okomisaki bana na bango ya mibali ebele lokola minzoto ya likolo mpe omemaki bango kino kati na mokili oyo opeselaki bakoko na bango mitindo ete bakende kobotola yango.
Kanisa Abrayami, Izaki mpe Isalaele, basali na Yo, oyo Yo moko olapelaki ndayi mpe olobaki : « Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto na likolo, nakopesa bango mokili oyo nyonso ndenge kaka nalobaki na bango ; mpe yango ekozala libula na bango mpo na libela. »
Botala Abrayami, tata na bino ; mpe Sara oyo abotaki bino. Tango nabengaki ye, azalaki kaka ye moko ; napambolaki ye mpe nakomisaki ye tata ya bato ebele !
Ndenge kaka bakoki kotanga te mampinga ya likolo mpe zelo ya bibale minene mpo na koyeba motango na yango, ndenge wana mpe nakokomisa ebele, bakitani ya Davidi, mosali na Ngai, mpe Balevi oyo basalelaka Ngai. › »
Yango wana, wuta na moto oyo akomaki mpaka mpe pene ya kokufa, bato babotamaki ebele penza lokola minzoto ya likolo mpe lokola zelo ya libongo ya ebale, oyo bakoki kutu kotanga te.
Kasi nabimisaki tata na bino, Abrayami, wuta na mokili oyo ezalaki na ngambo mosusu ya ebale, natambolisaki ye na mokili mobimba ya Kanana mpe napesaki ye bakitani ebele. Napesaki ye Izaki ;