Bongo mosali azwaki bashamo zomi kati na bashamo ya nkolo na ye elongo na biloko ya ndenge na ndenge oyo eleki kitoko ; akendeki na Arami mpe azwaki nzela ya engumba ya Naori.
Abrayami alobaki na mosali na ye, oyo awumelaki mingi na ndako na ye mpe azalaki kokamba biloko na ye nyonso : — Tia loboko na yo na se ya mopende na ngai
Moto moko te aleki ngai na monene kati na ndako oyo. Nkolo na ngai apekisi ngai eloko moko te longola kaka yo, pamba te ozali mwasi na ye. Boye ndenge nini penza ngai nakoki kosala likambo ya mabe boye mpe kosala masumu liboso ya Nzambe ?
Jozefi apesaki mitindo epai ya moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako na ye : « Tondisa biloko ya kolia na basaki ya bato oyo kolanda kilo oyo bakoki komema mpe tia mbongo ya moko na moko na moto ya saki na ye.
nakopesa bango, kati na Tempelo na Ngai mpe na bamir na yango, ekaniseli oyo ezali na kombo : ekozala malamu koleka kozala na bana mibali mpe bana basi. Nakopesa bango kombo ya libela, oyo bakoki kolongola te.
Na tina ya Damasi : « Amati mpe Aripadi batondisami na soni, pamba te bayoki sango ya mabe. Mitema na bango ekomi likolo-likolo mpe bakomi komitungisa lokola ebale oyo etomboki.
Apesaki ye mabele moko te awa, ezala ata mwa eteni. Kasi Nzambe apesaki ye elaka, ye elongo na bakitani na ye sima na ye, ete bakozwa mokili lokola libula, atako, na tango wana, Abrayami azalaki nanu na mwana te.
Bongo apesaki elaka, alobaki : « Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, soki kaka otali pasi ya mwasi mowumbu na Yo, soki okanisi ngai mpe obosani te mwasi mosali na Yo, kasi opesi ye mwana mobali, nakokaba ye epai na Yawe mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye, mpe bakotikala kokata suki ya moto na ye te. »