Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Abelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ye na moto oyo ewutaki likolo mpe ekweyaki na etumbelo ya bambeka.
Mpo na likambo ya Siona, nakokanga monoko na Ngai te ; mpo na likambo ya Yelusalemi, nakovanda kimia te, kino bosembo na ye emonana lokola kongenga ya pole, mpe lobiko na ye emonana lokola mwinda.
oyo nasalaki elongo na bakoko na bino tango nabimisaki bango na Ejipito, wuta na libulu ya moto oyo balambelaka bibende. » Nalobaki na bango : « Botosa Ngai mpe bosala makambo nyonso oyo nakotinda bino ; ezali na nzela wana nde bokozala bato na Ngai mpe Ngai nakozala Nzambe na bino.
Kasi mpo na bino, Yawe azwaki bino mpe abimisaki bino na fulu ya moto ya bibende, oyo ezalaki Ejipito, mpo ete bozala bato ya libula na Ye ndenge bozali sik’oyo.
Ndenge moto ezalaki komata na likolo longwa na etumbelo, Anjelu na Yawe mpe amataki kati na moto. Tango bamonaki bongo, Manoa mpe mwasi na ye bakweyaki bilongi kino na mabele.
Bongo Anjelu ya Yawe asembolaki nzete oyo asimbaki na loboko na Ye, mpe songe na yango etutaki nyama mpe mapa oyo ezanga levire. Moto ebimaki wuta na libanga mpe ezikisaki nyama mpe mapa. Anjelu ya Yawe alimwaki na miso na ye.