Boye, Yawe alobaki na Abrami : — Yeba solo ete bakitani na yo bakozala bapaya kati na mokili ya bapaya epai wapi bakozala bawumbu ; mpe bakonyokola bango kuna mibu nkama minei.
Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Nakomi pene ya kokufa. Kasi ya solo, Nzambe akosalisa bino mpe akobimisa bino na mokili oyo, mpo na kokotisa bino na mokili oyo alakaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi tango alapaki ndayi. »
« Lokola Manase, mokonzi ya Yuda, asalaki makambo ya nkele, lokola asalaki makambo mabe koleka ata bato ya Amori oyo bazalaki liboso na ye, mpe lokola apengwisaki Yuda na nzela ya banzambe na ye ya bikeko,
Moyize alobaki na bato : « Bokanisa mokolo oyo bobimaki na Ejipito, mokolo oyo bobimaki na bowumbu, pamba te Yawe abimisaki bino na loboko na Ye ya nguya. Bokolia eloko moko te oyo ezali na levire.
Bomikomisa mbindo te na moko ya makambo oyo, pamba te ezali na nzela na yango nde bato ya bikolo oyo nazali kobengana liboso na bino bamikomisaki mbindo.
Tango Yawe, Nzambe na yo, akosilisa kobengana bango liboso na yo, komilobela te kati na motema na yo : « Ezali mpo na bosembo na ngai nde Yawe amemaki ngai mpo ete nakamata mokili oyo. » Te, ezali bongo te ! Ezali nde mpo na mabe ya bikolo yango nde Yawe abengani yango liboso na yo.
Ezali te mpo na bosembo na yo to mpo ete otambolaki alima nde okokota mpo na kozwa mokili na bango, kasi ezali solo mpo na mabe ya bikolo yango nde Yawe, Nzambe na yo, akobengana yango liboso na yo, mpo na kokokisa ndayi oyo alapaki epai ya bakoko na yo Abrayami, Izaki mpe Jakobi.
bazali kokanga biso nzela mpo ete toteya Bapagano te, noki te bakobika. Na ndenge wana, bazali kaka kofulukisa masumu na bango mpe, suka na suka, kanda ya Nzambe ekokweyela bango.