Nzambe ayokaki mongongo ya mwana, mpe Anjelu na Nzambe abengaki Agari wuta na likolo. Ayebisaki ye : « Agari, likambo nini ? Kobanga te, pamba te Nzambe ayoki mongongo ya mwana wuta na esika oyo otikaki ye.
Na butu ya mokolo oyo Izaki akomaki na Beri-Sheba, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe ya Abrayami, tata na yo ; kobanga te, nazali elongo na yo. Mpo na Abrayami, mosali na Ngai, nakopambola yo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele. »
azali Nzambe na ngai, libanga na ngai mpe ebombamelo na ngai ; azali nguba na ngai, nguya oyo ebikisaka ngai, ekimelo na ngai, mpe Mobikisi na ngai. Okangolaka ngai wuta na maboko ya bato mabe.
Davidi alobaki lisusu na Salomo, mwana na ye ya mobali : — Yika mpiko mpe sala mosala ! Kobanga te, kozala mpe na somo te ; pamba te Yawe, Nzambe na ngai, azali elongo na yo ; akotika yo te mpe akobwaka yo te kino mosala nyonso ya Tempelo ya Yawe ekosila.
Bwaka miso na ngambo ya loboko ya mobali mpe tala ! Moto ata moko te ayebi ngai lisusu, nazali lisusu na ekimelo te, moto ata moko te azali komitungisa na tina na ngai !
Kasi tika ete bato nyonso oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango bazalaka na esengo tango nyonso, tika ete bayembaka mpo na esengo, bomoi na bango mobimba. Batela bango mpo ete bato oyo balingaka Kombo na Yo basepelaka kati na Yo.
Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.
Abombaka yo na se ya mapapu na Ye, mpe ozwaka ebombamelo ya malonga na se ya mapapu na Ye ; bolingo na Ye ebatelaka lokola nguba mpe lokola elamba ya ebende.
Loba na bato oyo bazali kobanga : « Bozala makasi, bobanga te, Nzambe na bino akoya, akoya kozongisa mabe na mabe, akoya na lifuti ya Nzambe. Ye moko akoya kobikisa bino. »
Botala, Nkolo Yawe azali koya na nguya, loboko na Ye ezali kopesa Ye makoki ya kokonza. Botala, azali na lifuti elongo na Ye, azali kotambola na lifuti na Ye.
Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.
Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo akelaki yo, oh Jakobi ; Ye oyo abongisaki yo, oh Isalaele : « Kobanga te, pamba te nasikolaki yo, nabengaki yo na kombo na yo, ozali ya ngai.
Tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo asalaki yo, abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo mpe asungaka yo : Oh Jakobi, mowumbu na Ngai, kobanga te ; yo, Yeshuruni, oyo naponaki.
Bolenga te, bobanga mpe te. Boni, natatolaki yango te ? Nasakolaki yango te wuta kala ? Bozali batatoli na Ngai. Boni, ezali na nzambe mosusu pembeni na Ngai ? Te, ezali na Libanga mosusu te, nayebi ata moko te. »
Ezalaki mokolo moko, mokolo ya mitano ya sanza ya minei, na mobu ya tuku misato, wana nazalaki pembeni ya ebale Kebari kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, likolo efungwamaki mpe namonaki bimoniseli ya Nzambe.
Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kati na Babiloni epai ya bato oyo bakendeki na bowumbu. Makambo oyo ezalaki kosalema kati na emoniseli oyo Molimo ya Nzambe apesaki ngai. Mpe emoniseli oyo namonaki esilaki.
alobaki : — Boyoka maloba na Ngai ! Soki mosakoli moko ya Yawe azali kati na bino, namimonisaka Ngai moko epai na ye na nzela ya bimoniseli, nalobaka na ye na nzela ya bandoto.
Yawe alobaki na Aron : « Okozwa eteni ya mabele te kati na mokili na bango, mpe okozwa ata bomengo moko te lokola libula kati na bana ya Isalaele, pamba te Ngai moko nde nazali bomengo mpe libula na bino kati na bana ya Isalaele.
maloba ya moto oyo ayokaka maloba ya Nzambe, oyo amonaka bimoniseli oyo ewutaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, oyo miso na ye efungwamaka soki akweyi na molimo :
Kasi anjelu alobaki na ye : — Zakari, kobanga te ! Nzambe ayoki mabondeli na yo. Mwasi na yo, Elizabeti, akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye kombo « Yoane. »
Bato yango bazongisaki : — Towuti epai ya Kornei, mokonzi ya basoda ; azali moto ya sembo mpe atosaka Nzambe, mpe Bayuda nyonso bazali kotatola bolamu na tina na ye. Anjelu ya bule ayebisaki ye ete abengisa yo kati na ndako na ye mpo ete ayoka makambo oyo ozali na yango ya koloba na ye.
Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te. »
Tango namonaki Ye, nakweyaki na makolo na Ye lokola moto akufi. Bongo asimbaki ngai na loboko na Ye ya mobali mpe alobaki na ngai : « Kobanga te ! Nazali Ya liboso mpe Ya suka.
Na tango ya kala, kati na Isalaele, moto oyo azalaki kokende kotuna toli ya Nzambe azalaki koloba : « Tokende epai ya moto oyo azwaka bimoniseli. » Pamba te moto oyo bazali kobenga lelo « mosakoli, » bazalaki kobenga ye na kala « moto oyo azwaka bimoniseli. »