Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 14:8 - Mokanda na Bomoi

8 Boye mokonzi ya Sodome, mokonzi ya Gomore, mokonzi ya Adima, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari, babimaki mpe babongamaki na lubwaku ya Sidimi

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 14:8
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza ; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.)


Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito.


Nzokande, lubwaku ya Sidimi ezalaki na mabulu oyo etonda na potopoto ya mwindo ; bongo tango bakonzi ya Sodome mpe ya Gomore bazalaki kokima, ndambo ya bato bazalaki kozinda kati na yango mpe ndambo mosusu bazalaki kokima na bangomba.


mpo na kobundisa Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami ; Tideali, mokonzi ya Goyimi ; Amirafeli, mokonzi ya Shineari, mpe Arioki, mokonzi ya Elasari. Bakonzi minei babundisaki bakonzi mitano.


Tala, ezali na engumba moko pene awa mpo na kokimela, yango ezali penza moke. Tika ngai nakimela kuna atako ezali moke mpo ete nabikisa bomoi na ngai !


Kasi kima noki, pamba te nakoki kosala eloko moko te soki okomi nanu kuna te. Yango wana babengaka engumba yango Tsoari.


Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ? Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ? Mpo na nini nasala yo makambo oyo nasalaka engumba ya Adima ? Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo lokola engumba ya Tseboyimi ? Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai mpe natondi na mawa makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ