Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 14:7 - Mokanda na Bomoi

7 Tango bazongaki, bakendeki na Eyini-Mishipati oyo elakisi Kadeshi mpe babotolaki mokili mobimba ya bato ya Amaleki. Balongaki mpe bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na Atsatsoni-Tamari.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 14:7
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana babengaka libulu ya mayi yango Beri Lakai-Royi. Libulu ya mayi yango ezali na kati-kati ya Kadeshi mpe Beredi.


Abrayami alongwaki na mboka wana mpo na kokende na etuka ya Negevi mpe avandaki na mboka oyo ezalaki kati ya Kadeshi mpe Shuri ; sima na tango moke, akendeki kovanda na Gerari.


Elifazi, mwana mobali ya Ezawu, azalaki na makangu oyo kombo na ye ezalaki « Timina ; » Timina abotelaki ye Amaleki. Bango nde bakoko ya Ada, mwasi ya Ezawu.


mokonzi Kora, mokonzi Gaetami mpe mokonzi Amaleki. Bango nde bakonzi ya libota ya Elifazi, oyo babotamaki na Edomi ; bazalaki bakoko ya Ada.


Bongo sango ekomaki na matoyi ya Jozafati na maloba oyo : « Mampinga minene ezali koya kobundisa yo longwa na Siri mpe na ngambo mosusu ya ebale monene ; esili kokoma na Atsatsoni-Tamari oyo babengaka Eyini-Gedi. »


Balobi mbisi bakobanda kovanda na bangambo ya ebale monene, wuta na Eyini-Gedi kino na Eyini-Egilayimi, mpo na kobwaka minyama mpe kozwa bambisi ya lolenge nyonso lokola bambisi oyo ezalaka na ebale monene.


Bandelo ya mabele ya Gadi ekozala na ngambo ya sude, pene ya Negevi, longwa na Tamari kino na mayi ya Meriba ya Kadeshi ; ekolekela na Wadi kino na ebale monene Mediterane.


Bayaki kokuta Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele na Kadeshi, kati na esobe ya Parani. Ezalaki kuna nde bapesaki bango elongo na lisanga mobimba sango ya mobembo na bango mpe balakisaki bango bambuma ya mokili yango.


Bato ya Amaleki mpe ya Kanana bakokutana na bino kuna. Bongo lokola bopesaki Yawe mokongo, bokokweya na mopanga mpo ete akozala elongo na bino te.


Boye, bato ya Amaleki mpe ya Kanana oyo bazalaki kovanda na bangomba yango bakitelaki bango, babundisaki bango, balongaki bango mpe balandaki bango kino na Orima.


Na sanza ya liboso, lisanga mobimba ya Isalaele ekomaki na esobe ya Tsini mpe bavandaki na Kadeshi. Ezalaki kuna nde Miriami akufaki mpe bakundaki ye.


Balami amonaki Amaleki mpe alobaki maloba oyo : « Amaleki ezalaki na molongo ya liboso kati na bikolo, kasi ekosuka na libebi. »


Boye, ndenge Yawe, Nzambe na biso, atindaki biso, tolongwaki na ngomba Orebi mpe tokendeki na etuka ya bangomba ya bato ya Amori. Tokatisaki esobe monene mpe ya somo oyo bomonaki mpe tokomaki na Kadeshi-Barinea.


Nibishani, Iri-Amelayi mpe Eyini-Gedi : bingumba nyonso ezalaki motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ