Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 14:23 - Mokanda na Bomoi

23 ete nakozwa eloko moko te kati na biloko na yo : ezala singa ya kotongela to ya kokangela sapato, mpo ete oloba te : « Nakomisi Abrami mozwi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 14:23
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi moto na Nzambe azongiselaki mokonzi : — Ata soki opesi ngai kati-kati ya bozwi na yo, nakokende epai na yo te, nakolia lipa te mpe nakomela ata litanga ya mayi te na esika oyo.


Mosakoli Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe oyo nasalelaka, nakondima eloko moko te. Namani atungisaki ye, kasi Elize aboyaki kaka.


Geazi, mosali ya Elize, moto na Nzambe, amilobelaki : « Nkolo na ngai atiki penza na pamba Namani, moto oyo ya Arami, wana aboyi kozwa biloko oyo amemelaki ye. Na Kombo na Yawe, nakolanda ye mbangu mpe nakozwa ata eloko moko epai na ye. »


azali koya sima na ngai, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye.


Sik’oyo, nasali mabongisi ya koya kotala bino mpo na mbala ya misato ; mpe nakomemisa bino mokumba na ngai te, pamba te nazali koluka biloko na bino te, kasi nazali nde koluka bino moko. Kobomba biloko mpo na baboti ezali likambo ya bana na bango te, kasi ezali baboti nde basengeli kobomba biloko mpo na bana na bango.


Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki : « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ