Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 14:2 - Mokanda na Bomoi

2 bakendeki kobundisa Bera, mokonzi ya Sodome ; Birisha, mokonzi ya Gomore ; Shineabi, mokonzi ya Adima ; Shemeberi, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 14:2
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza ; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.)


Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito.


Abrami avandaki na mokili ya Kanana, mpe Loti avandaki kati na bingumba ya etando mpe atelemisaki bandako na ye ya kapo pene ya Sodome.


Nazali kolela na se ya motema mpo na Moabi, banguna na ye bazali kokima kino na Tsoari, kino na Egilati-Shelishiya ; bazali komata na nzela ya Luyiti na kolela ; mpe na nzela ya Oronayimi, bazali kosala matanga mpo na kobebisama na bango.


Makelele mpe koganga ezali komata wuta na Eshiboni kino na Eleale mpe Yakatsi, wuta na Tsoari kino koleka Oronayimi mpe Egilati-Shelishiya ; pamba te, ezala mayi ya Nimirimi esili kokawuka.


Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ? Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ? Mpo na nini nasala yo makambo oyo nasalaka engumba ya Adima ? Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo lokola engumba ya Tseboyimi ? Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai mpe natondi na mawa makasi.


Bikolo nyonso ekotuna : ‹ Mpo na nini Yawe asali likambo ya boye na mokili oyo ? Mpo na nini kanda makasi boye ? ›


mpe etuka ya Negevi mpe etuka ya lubwaku ya Jeriko, engumba ya banzete ya mbila kino na Tsoari.


lisanga ya mibale etalisaki na nzela ya Beti-Oroni ; mpe lisanga ya misato ezwaki nzela oyo ekenda na mondelo ya Lubwaku ya Tseboyimi, na ngambo ya esobe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ