Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 14:11 - Mokanda na Bomoi

11 Bakonzi oyo minei, babotolaki biloko nyonso ya Sodome mpe ya Gomore mpe bakendeki na biloko na bango nyonso ya kolia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 14:11
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrami azwaki mwasi na ye Sarayi ; Loti, mwana ya ndeko na ye ; bomengo nyonso oyo akomaki na yango mpe bato oyo azwaki na Arani. Babimaki wuta na Arani mpo na kokende na Kanana mpe bakomaki kuna.


Nzokande, lubwaku ya Sidimi ezalaki na mabulu oyo etonda na potopoto ya mwindo ; bongo tango bakonzi ya Sodome mpe ya Gomore bazalaki kokima, ndambo ya bato bazalaki kozinda kati na yango mpe ndambo mosusu bazalaki kokima na bangomba.


Bamemaki mpe lisusu Loti, mwana ya ndeko ya Abrami, elongo na bomengo na ye nyonso oyo azwaki tango azalaki kovanda na Sodome.


Abotolaki bango bomengo nyonso ya bitumba mpe azongaki na ndeko na ye Loti elongo na biloko na ye nyonso, basi mpe bato mosusu.


Mokonzi ya Sodome alobaki na Abrami : — Pesa ngai bato, kamata na yo biloko.


Bakokata bakingo ya bangombe na bino na miso na bino, kasi bokolia yango te. Bakokamata ba-ane na bino na makasi, na miso na bino, kasi ekozonga epai na bino te ; bakokaba epai ya banguna na bino, bameme mpe bantaba na bino ; mpe moto moko te akosunga bino.


Yawe akotindela bino bokono oyo ekobuka bino mabolongo, makolo ; bokono oyo ekoki kobika te mpe ekopanzana banda na se ya matambe kino na mito.


Bakolia bana ya bibwele na bino mpe bambuma ya mabele na bino, kino bakobebisa bino. Bakotikela bino ata ble te, vino ya sika te, mafuta te, ata bana ngombe na bino te, ata bana meme na bino te mpe ata bantaba na bino te kino bokobebisama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ