Abrami akendeki ndenge Yawe alobaki na ye ; mpe Loti akendeki na ye elongo. Abrami azalaki na mibu tuku sambo na mitano tango abimaki na engumba Arani.
Abrami azwaki mwasi na ye Sarayi ; Loti, mwana ya ndeko na ye ; bomengo nyonso oyo akomaki na yango mpe bato oyo azwaki na Arani. Babimaki wuta na Arani mpo na kokende na Kanana mpe bakomaki kuna.
Bana mibali yango bakolaki. Ezawu akomaki mobomi makasi ya banyama mpe azalaki kolekisa tango mingi na zamba ; Jakobi azalaki moto ya kimia, azalaki kosepela kovanda na ndako.
Bobotola na makasi bandako na bango ya kapo mpe bibwele na bango ; bomema bilamba, biloko na bango ya kitoko mpe bashamo na bango ! Tika ete bato bawolola bango na bangambo nyonso : ‹ Somo ekangi bango na bangambo nyonso ! ›