Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 13:4 - Mokanda na Bomoi

4 mpe atongaki etumbelo ya liboso. Ezalaki na esika yango nde Abrami abelelaki Kombo ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 13:4
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrami alongolaki bandako na ye ya kapo mpe akendeki kovanda na Ebron, pene ya banzete minene ya Mamire epai wapi atongaki etumbelo mpo na Yawe.


Kaka na esika yango, Izaki atongaki etumbelo, abelelaki Kombo ya Yawe, atongaki ndako na ye ya kapo. Basali na ye batimolaki libulu mosusu ya mayi.


Seti mpe abotaki mwana mobali, apesaki ye kombo « Enoshi. » Ezalaki na tango wana nde bato bakomaki kobelela Kombo ya Yawe.


Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, mpe bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato !


Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato !


Nakobonzela Yo mbeka mpo na kozongisa matondi, mpe nakobelela Kombo ya Yawe.


Ayokaki ngai ; boye nakobelela Ye bomoi na ngai mobimba.


Yawe azali pene ya bato nyonso oyo babelelaka Ye, ya bato nyonso oyo babelelaka Ye na solo ;


Yawe, nasepelaka na Tempelo epai wapi ovandaka elongo na nkembo na Yo.


Oh Nzambe, Yo oyo ozali nguba na biso, tala ! Tala elongi ya mopakolami na Yo !


Boye, tango okobelela Yawe, akoyanola yo ; tango okosenga lisungi, akoloba : ‹ Ngai oyo. › Soki kati na yo, olongoli ekangiseli, otiki kolakisa bato mosapi mpe otiki maloba mabe ;


Boye bokobelela Ngai, bokoya epai na Ngai mpe bokobondela Ngai ; mpe Ngai nakoyoka bino.


Boye nakopetola bibebu ya bato ya bikolo mpo ete bango nyonso bazala ya kokoka mpo na kobelela Kombo ya Yawe mpe kosalela Ye na motema mobimba.


Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ; mpe epai ya bato oyo Nzambe abulisa kati na Yesu-Klisto mpe abenga mpo ete bazala basantu, elongo na bato nyonso oyo, na bisika nyonso, babelelaka Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, Nkolo na bango mpe Nkolo na biso :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ