Abrami atambolaki kati na mokili yango kino na esika oyo babengaka Sishemi, na nzete monene ya More. Na tango wana, bato ya Kanana bazalaki kovanda na mokili yango.
Tango Moyize atindaki bango mpo na kononga mokili ya Kanana, alobaki : « Bolekela na nzela ya etuka ya Negevi mpe bokotela na nzela ya mokili ya bangomba.
Mpo na kondima, avandaki lokola mopaya kati na mokili oyo Nzambe alakaki ye ; azalaki kovanda na bandako ya kapo lokola Izaki mpe Jakobi oyo mpe bazwaki elaka ya ndenge moko na ye.