Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 13:14 - Mokanda na Bomoi

14 Sima na bokabwani ya Abrami na Loti, Yawe alobaki na Abrami : « Na esika oyo ozali, tombola miso na yo mpe tala na ngambo ya nor, ya sude, ya este mpe ya weste.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 13:14
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito.


Bana na yo bakozala ebele lokola putulu ya mabele, bakopanzana na bangambo nyonso : wuta na weste kino na este, wuta na nor kino na sude. Mabota nyonso ya mokili ekomipambola mpo na yo mpe mpo na bakitani na yo.


Tombola miso na yo mpe tala na zingazinga : bana na yo nyonso basangani mpe bazali koya epai na yo. Nalapi ndayi na Kombo na Ngai, elobi Yawe, ete bakozala mpo na yo lokola babiju ya talo, mpe okolata bango lokola mokaba ya mwasi mobandami na libala.


Tombola miso zingazinga na yo mpe tala : Bango nyonso basangani mpe bazali koya epai na yo ; bana na yo ya mibali bawuti mosika, mpe oyo ya basi, bamemi bango na maboko.


Mata na songe ya ngomba Pisiga mpe tala na ngambo ya weste, na nor, na sude mpe na este. Tala kaka mokili na miso kasi okotikala kokatisa Yordani te.


Wuta na bitando ya Moabi, Moyize amataki na likolo ya ngomba Nebo kino na songe ya ngomba Pisiga oyo etalana na Jeriko. Kuna, Yawe alakisaki ye mokili mobimba : wuta na Galadi kino na Dani,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ