Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 13:11 - Mokanda na Bomoi

11 Loti aponaki etando ya Yordani mpe akendeki na ngambo ya este. Ezalaki ndenge wana nde bakabwanaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 13:11
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito.


Abrami avandaki na mokili ya Kanana, mpe Loti avandaki kati na bingumba ya etando mpe atelemisaki bandako na ye ya kapo pene ya Sodome.


Sima na bokabwani ya Abrami na Loti, Yawe alobaki na Abrami : « Na esika oyo ozali, tombola miso na yo mpe tala na ngambo ya nor, ya sude, ya este mpe ya weste.


Mokili mobimba ezali liboso na yo. Ezali malamu tokabwana : soki yo okeyi na ngambo ya loboko ya mwasi, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mobali ; soki okeyi na ngambo ya loboko ya mobali, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mwasi. »


Tango kaka babimisaki bango na libanda, moko kati na mibali yango alobaki : — Bokima mpo ete bobikisa bomoi na bino ! Botala sima te mpe botelema ata esika moko te kati na engumba oyo ! Bokima na likolo ya bangomba, noki te bokobebisama !


Nazali moninga ya bato nyonso oyo batosaka Yo mpe babatelaka mitindo na Yo.


Natatolaka na tina na basantu oyo bazali kati na mboka ete bazali penza bato minene oyo nasepelaka na bango makasi.


Kosundola te molingami na yo to molingami ya tata na yo, mpe kokende te na ndako ya ndeko na yo tango ozali na pasi ; kozala na molingami ya pembeni ezali malamu koleka kozala na ndeko ya mosika.


Na ngambo ya este, mondelo ekobanda na kati-kati ya Avirani mpe Damasi, ekolekela na Yordani na kati-kati ya mokili ya Galadi mpe Isalaele, na ebale monene ya mungwa kino na Tamari. Yango nde ekozala mondelo ya ngambo ya este.


Tokima Bandako ya Nzambe na biso te, ndenge bato mosusu bamesana kosala ; kasi tolendisana biso na biso, wana bozali komona ete mokolo ya Nkolo ekomi pene.


Bomemiaka bato nyonso, bolingaka bandeko na bino kati na kondima, botosaka Nzambe, mpe bopesaka mokonzi lokumu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ