Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 13:10 - Mokanda na Bomoi

10 Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 13:10
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala libota ya Tera : Tera abotaki Abrami, Naori mpe Arani. Arani nde azalaki tata ya Loti.


Loti aponaki etando ya Yordani mpe akendeki na ngambo ya este. Ezalaki ndenge wana nde bakabwanaki.


Mokili mobimba ezali liboso na yo. Ezali malamu tokabwana : soki yo okeyi na ngambo ya loboko ya mwasi, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mobali ; soki okeyi na ngambo ya loboko ya mobali, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mwasi. »


bakendeki kobundisa Bera, mokonzi ya Sodome ; Birisha, mokonzi ya Gomore ; Shineabi, mokonzi ya Adima ; Shemeberi, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari.


Boye mokonzi ya Sodome, mokonzi ya Gomore, mokonzi ya Adima, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari, babimaki mpe babongamaki na lubwaku ya Sidimi


Mwasi amonaki ete mbuma ya nzete ezali elengi mpo na kolia, kitoko mpo na kotala mpe malamu mpo na kofungola mayele. Boye azwaki mbuma mpe aliaki yango. Apesaki yango mpe na mobali na ye, oyo azalaki elongo na ye ; bongo ye mpe mobali aliaki yango.


mokili ya Ejipito mpe ezali na maboko na yo. Vandisa tata na yo mpe bandeko na yo na eteni ya mabele oyo eleki kitoko ; tika ete bavanda na Gosheni. Mpe soki oyebi kati na bango bato ya mayele, pesa bango mokumba ya kobatela bibwele na ngai.


milimo emonaki ete bana basi ya bato bazali kitoko ; boye ekomisaki ba-oyo eponaki basi na yango.


Mokonzi asengaki ete banyangwisa yango kati na mabele, na etando ya Yordani, kati na Sukoti mpe Tsaritani.


Soki mayi ya ebale etomboki, yango ebangaka te ; ata mayi ya Yordani esopaneli yango na monoko, evandaka kaka kimia.


kobongola mabele oyo ebotaka bambuma mabele ya mungwa likolo ya mabe ya bavandi na yango.


Nazali kolela na se ya motema mpo na Moabi, banguna na ye bazali kokima kino na Tsoari, kino na Egilati-Shelishiya ; bazali komata na nzela ya Luyiti na kolela ; mpe na nzela ya Oronayimi, bazali kosala matanga mpo na kobebisama na bango.


Solo, Yawe akobondisa Siona mpe akotala na liso ya ngolu bisika nyonso ya Siona oyo ebeba ; akokomisa esobe na yango lokola Edeni, bisika na yango ekawuka, lokola elanga ya Yawe. Esengo mpe kosepela nde ekomonana kuna, matondi mpe mongongo ya banzembo.


Makelele mpe koganga ezali komata wuta na Eshiboni kino na Eleale mpe Yakatsi, wuta na Tsoari kino koleka Oronayimi mpe Egilati-Shelishiya ; pamba te, ezala mayi ya Nimirimi esili kokawuka.


Kulutu na yo ya mwasi, ezali Samari oyo avandi na ngambo ya nor ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi ; leki na yo ya mwasi ezali Sodome oyo avandi na ngambo ya sude ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi.


Tala sik’oyo masumu ya Sodome, ndeko na yo ya mwasi : ye elongo na bana na ye ya basi bazalaki bato ya lolendo, mpo ete batondaki na bomengo mpe eloko moko te ezalaki kotungisa bango ; basungaki ata moke te babola mpe bato bakelela.


Ozalaki kati na Edeni, elanga ya Nzambe ; mabanga ya talo ya lolenge nyonso ezalaki kokomisa yo kitoko : ribi, topaze, diama, emerode, krizolite, onikisi, jasipe, safiri ; bambunda na yo ya mike mpe baflite na yo ezalaki ya wolo, babongisaki yango mpo na mokolo oyo bakela yo.


Kati na elanga ya Nzambe, nzete moko te ya sedele ekokanaki na yango, nzete moko te ya sipele ekokanaki na yango na bitape, nzete moko te ya platane ekokanaki na yango na makasa : nzete moko te kati na elanga ya Nzambe ekokanaki na yango na kitoko.


Nasalaki yango kitoko makasi na bitape ebele ; bongo banzete nyonso ya Edeni, kati na elanga ya Nzambe, ezalaki kolula yango.


Na ngambo ya este, mondelo ekobanda na kati-kati ya Avirani mpe Damasi, ekolekela na Yordani na kati-kati ya mokili ya Galadi mpe Isalaele, na ebale monene ya mungwa kino na Tamari. Yango nde ekozala mondelo ya ngambo ya este.


Liboso na bango, moto ezali kotumba ; sima na bango, moto ezali kozikisa. Liboso na bango, mokili ezali lokola elanga ya Edeni, mpe sima na bango, lokola esobe. Solo, ata eloko moko te ekotikala.


mpe etuka ya Negevi mpe etuka ya lubwaku ya Jeriko, engumba ya banzete ya mbila kino na Tsoari.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ