Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 12:9 - Mokanda na Bomoi

9 Sima, Abrami alongwaki wana mpe akendeki malembe-malembe kino na Negevi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 12:9
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Abrami alongwaki na Ejipito mpe akendeki na Negevi elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango ; Loti mpe akendeki na ye elongo.


Longwa na Negevi, akendeki malembe-malembe kino na Beteli, na esika oyo ezalaki kati ya Beteli mpe Ayi, epai wapi ndako na ye ya kapo ezalaki


Abrayami alongwaki na mboka wana mpo na kokende na etuka ya Negevi mpe avandaki na mboka oyo ezalaki kati ya Kadeshi mpe Shuri ; sima na tango moke, akendeki kovanda na Gerari.


Tango Nzambe alongolaki ngai na ndako ya tata na ngai mpo na kokende bipai na bipai, nayebisaki mwasi na ngai : « Tala bolamu oyo okosalela ngai : Bisika nyonso oyo tokokende, okolobaka na tina na ngai : ‹ Azali ndeko na ngai. › »


Nzokande, Izaki azalaki kovanda na Negevi mpe awutaki na libulu ya mayi na Lakai-Royi.


bazalaki koyengayenga longwa na ekolo moko kino na ekolo mosusu, longwa na mokili moko kino na mokili mosusu.


Maloba na Yawe na tina na banyama ya Negevi : Kati na mokili ya pasi mpe ya kobanga, mokili ya bankosi ya mibali mpe ya bankosi ya basi, ya etupa mpe ya banyoka oyo epumbwaka, bantoma bazali komema bozwi na bango na mikongo ya ba-ane, bomengo na bango na mikongo ya bashamo, epai ya ekolo oyo ekotikala kopesa bango ata litomba moko te :


Tango Moyize atindaki bango mpo na kononga mokili ya Kanana, alobaki : « Bolekela na nzela ya etuka ya Negevi mpe bokotela na nzela ya mokili ya bangomba.


Bolongola molako mpe bokende kino na etuka ya bangomba ya bato ya Amori ; bokende na bamboka nyonso oyo ezali pene ya Araba, na bangomba, na mboka ya se, na Negevi mpe pembeni-pembeni ya mayi monene, kati na mokili ya bato ya Kanana mpe na mokili ya Libani kino na Efrate, ebale monene.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ