20 Boye, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye na tina na Abrami ete babengana ye elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango.
Mpo na nini olobaki : ‹ Azali ndeko na ngai ya mwasi ? › Mpo na yango, nakomisaki ye mwasi na ngai. Sik’oyo tala mwasi na yo, kamata ye mpe kende ! »
Boye Abrami alongwaki na Ejipito mpe akendeki na Negevi elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango ; Loti mpe akendeki na ye elongo.
Moyize apesaki nzela ete bokilo na ye akende, mpe Jetro azongaki na mokili na ye.
Kati na loboko na Yawe, motema ya mokonzi ezalaka lokola moluka oyo atindaka esika nyonso oyo alingi.