17 Kasi Yawe apesaki etumbu makasi epai ya Faraon mpe ndako na ye mpo na Sarayi, mwasi ya Abrami.
Abrayami abondelaki Nzambe, mpe Nzambe abikisaki Abimeleki, mwasi na ye, mpe basi bawumbu na ye. Na nzela wana, bazwaki lisusu bana ;
pamba te Yawe akangaki mabota kati na ndako mobimba ya Abimeleki likolo ya Sara, mwasi ya Abrayami.
Kasi na butu, Nzambe ayaki epai ya Abimeleki kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Okokufa mpo na mwasi oyo osili kozwa, pamba te azali mwasi ya libala. »
kasi Yawe atikaki moto moko te konyokola bango, apamelaki bakonzi na tina na bango :
Davidi alobaki na Orinani : — Pesa ngai etando na yo, tekela ngai yango na motuya ya mbongo oyo ekoki na yango, mpo ete natonga etumbelo mpo na Yawe ; tekela ngai yango mpo ete etumbu ya bokono oyo ezali koboma bato esila.
Aponaka bilongi ya bakambi te, mpe asalelaka bazwi bolamu te mpo na bozwi na bango koleka babola, pamba te bango nyonso basalemaki na maboko na Ye.
Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.