Abrayami azalaki koloba kuna na tina na Sara, mwasi na ye : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ! » Yango wana Abimeleki, mokonzi ya Gerari, atindaki bato mpo na koluka Sara mpe akamataki ye na makasi.
Ezali mobali na ye moko nde alobaki : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ; » mpe ye moko andimaki : « Azali ndeko na ngai ya mobali. » Nasali yango na motema sembo mpe na maboko ezanga mbindo.
Tango bato ya esika wana batunaki ye na tina na mwasi na ye, azongisaki : — Azali ndeko na ngai ya mwasi. Azalaki koloba te ete azali mwasi na ye mpo ete azalaki kobanga ete bato ya mboka baboma ye mpo na Rebeka, pamba te azalaki penza kitoko.
Ozalaki na somo ya nani to ozalaki kobanga nani mpo ete okosa Ngai to obosana Ngai, to mpe obimisa Ngai na motema na yo ? Boni, ezali te mpo ete navandaki kimia tango molayi nde ozali kobanga Ngai te ?
Bongo Jeremi alobaki na Sedesiasi : — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : « Soki kaka omipesi epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, yo mpe libota na yo bokokufa te, mpe engumba oyo ekobebisama na moto te.
Jeremi azongisaki : — Te, bakokaba yo te ! Nabondeli yo, tosa Yawe mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo ; bongo nyonso ekotambola malamu mpo na yo mpe okobikisa bomoi na yo.
Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi ; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye ; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta.