Tango Nzambe alongolaki ngai na ndako ya tata na ngai mpo na kokende bipai na bipai, nayebisaki mwasi na ngai : « Tala bolamu oyo okosalela ngai : Bisika nyonso oyo tokokende, okolobaka na tina na ngai : ‹ Azali ndeko na ngai. › »
Abrayami azalaki koloba kuna na tina na Sara, mwasi na ye : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ! » Yango wana Abimeleki, mokonzi ya Gerari, atindaki bato mpo na koluka Sara mpe akamataki ye na makasi.
Elenge mwasi azalaki kitoko penza, ayebaki nanu nzoto ya mibali te ; ata mobali moko te asangisaki na ye nzoto. Akitaki na libulu ya mayi, atondisaki mbeki na ye mpe amataki.
Tango bato ya esika wana batunaki ye na tina na mwasi na ye, azongisaki : — Azali ndeko na ngai ya mwasi. Azalaki koloba te ete azali mwasi na ye mpo ete azalaki kobanga ete bato ya mboka baboma ye mpo na Rebeka, pamba te azalaki penza kitoko.
Mokolo moko na pokwa, Davidi alamukaki wuta na mbeto na ye mpe atambolaki na veranda ya likolo ya ndako ya mokonzi. Wuta na likolo ya veranda, amonaki mwasi moko azali kosukola. Mwasi yango azalaki kitoko makasi.
Kombo na ye ezalaki « Nabali, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Abigayili. » Abigayili azalaki mwasi ya mayele mpe ya kitoko ; kasi mobali na ye, moto ya etuka Kalebi, azalaki motema makasi mpe moto mabe.